[1] Bongo namoni na Likolo elembo mosusu ya monene pe ya kokamwa: ba-anjelu sambo basimbi bapasi sambo. Yango nde bapasi ya suka oyo ekokokisa kanda ya Nzambe.
[2] Pe namoni lokola ebale; yango emonani lokola talatala oyo ezali kopela móto. Baoyo balongi Nyama ná ekeko na yango pe talo ya kombo na yango, batelemi penepene ya ebale ya talatala, pe basimbi mandanda oyo Nzambe apesaki bango.
[3] Bazali koyemba nzembo ya Moize, mosali ya Nzambe, pe nzembo ya Mwana-Meme: “Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, misala na yo ezali ya minene pe ya kokamwa! Mokonzi monene ya bikolo nyonso, banzela na yo ezali ya bosembo pe ya solo!
[4] Nkolo, moto nini akoki kobanga yo té? Nani akoki koboya kokumisa yo? Pamba té kaka yo moto ozali Moto ya bosantu. Bato ya bikolo nyonso bakoya pe bakofukamela yo, po misala na yo ya bosembo esi'emonani polele.”
[5] Sima, namoni na Likolo, Ndako ya Nzambe efungwami; kuna nde esika Nzambe amilakisaka na bato.
[6] Ba-anjelu sambo oyo basimbi bapasi sambo, babimi na Ndako ya Nzambe; balati bilamba ya talo pe ya pembe penza, ná mikaba ya or na loketo.
[7] Moko na kati ya ba-Sheriben minei apesi ba-anjelu basani sambo ya or, etondá na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko.
[8] Ndako ya Nzambe eyei kotonda na milinga, po na lokumu ya Nzambe pe nguya na ye. Bongo ata moto moko té akoki kokota na Ndako ya Nzambe, tii tango ba-anjelu sambo bakosilisa bapasi wana sambo.