[1] Namoni Mwana-Meme abandi kofungola buku. Tango alongoli kashé ya liboso, nayoki Sheriben ya liboso abeleli lokola kake: “Yaka!”
[2] Natali, bongo namoni punda moko ya pembe. Moto oyo amati yango asimbi munduki ya bafleshe; bakumisi ye po alongi etumba, pe abimi po ákende kolonga lisusu.
[3] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya mibale, nayoki Sheriben ya mibale abeleli: “Yaka!”
[4] Punda mosusu ebimi, ezalaki ya motane penza. Moto oyo amati yango bapesi ye mbeli moko ya monene, po ákende kobimisa bitumba na mokili, na ndenge 'tè bato bábomana bango na bango.
[5] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya misato, nayoki Sheriben ya misato abeleli: “Yaka!” Natali, pe namoni punda ya mwindu. Moto oyo amati yango asimbi eloko ya komekela kilo.
[6] Nayoki lokola mongongo moko euti na kati ya ba-Sheriben minei, elobi: “Lifuta ya mokolo moko ya mosala ekozala bobele po na kopo moko ya blé, to bakopo misato ya orje. Kasi, kobebisa bilanga ya olive to ya vinu té.”
[7] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya minei, nayoki Sheriben ya minei abeleli: “Yaka!”
[8] Natali, pe namoni punda moko, poso na yango ezalaki lokola mai ya salité. Moto oyo amati yango, kombo na ye Liwa. Mokonzi ya mboka ya bato bakufá nde alandi ye. Bapesi bango bokonzi ya koboma ndambo moko ya mokili, ézala na bitumba, na nzala, na maladi to na banyama ya mabe.
[9] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya mitano, namoni na se ya mesa ya mabonza milimo ya bato oyo babomaki bango po bazalaki kondima maloba ya Nzambe, pe kopanza sango na ye.
[10] Bango bazalaki koganga na mingongo makasi: “Mokonzi ya bosantu pe ya solo, kozelisa biso lisusu té. Sambisa bato ya mokili, pe pesa bango etumbu po babomaki biso.”
[11] Bongo bapesi moko moko na kati na bango nzambala ya pembe, pe bayebisi bango boye: “Bózela mwa-moke, pamba té nanu bokoki té. Ndenge babomaki bino, esengeli pe báboma lisusu bato ebele na kati ya baninga na bino ya mosala pe bandeko na bino.”
[12] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya motoba, namoni mabelé eningani makasi, moi eyindi penza, pe sanza yango nyonso ekómi motane lokola makila.
[13] Minzoto eyei kokweya na se ndenge bambuma ya figi ekweyaka tango mopepe ya makasi eningisi nzete.
[14] Likolo elimwe ndenge balíngaka papié ya molai; pe bangomba nyonso ná bisanga nyonso elongwe na bisika na yango.
[15] Bakonzi ya mokili, bato minene, ba-shef ya basoda, bato ya bomengo, bato ya makasi, bato nyonso ézala baumbu to bansomi, babombamaki na mabulu oyo ezali na kati ya mabanga ya bangomba.
[16] Babandi koloba na bangomba pe mabanga: “Bókweela biso pe bóbomba biso, po Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi ámona biso té, pe kanda ya Mwana-Meme ényokola biso té.
[17] Pamba té mokolo ya monene ya kanda na bango esi'ekoki; pe nani moto akoki kobika?”