Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:32

[1] Elembo moko ya monene pe ya kokamwa ebimi na Likolo: Mwasi moko alati moi lokola elamba, anyati sanza na makolo, pe alati ekoti ya bokonzi ya minzoto zomi na mibale na motú.

[2] Azalaki na zemi, pe abandi kolela makasi po na pasi ya kobota. Eklezya esi'ekómá na kimia (elakisi 'tè bakoki koboma Eklezya té), ata kutu monguna azali kobundisa “bana na ye mosusu” (v. 14-17; 11.7).

[3] Pe elembo mosusu ya kokamwa ebimi na Likolo: Elima moko ya somo ya motane, lokola ngando, kasi ezalaki na mitú sambo pe maseke zomi; motú moko moko ezalaki na ekoti ya bokonzi.

[4] Mokila na yango ezalaki kokombola ndambo monene ya minzoto, pe kobwaka yango na mokili. Elima wana eyei kotelema liboso ya Mwasi oyo alingi kobota, po élia Mwana na ye.

[5] Bongo Mwasi aboti mwana-mobali; ezali ye nde moto akozwa bokonzi ya bikolo nyonso, pe akotambwisa yango na makasi penza. Nzambe atomboli mwana wana na Likolo, pe atie ye penepene ya Kiti na ye ya bokonzi;

[6] nzokande Mwasi akimi na esobe; kuna Nzambe abongiselá ye esika bakoleisa ye mbula misato na ndambo.

[7] Etumba ebimi na Likolo. Mishel ná ba-anjelu na ye babundisi Elima; Elima pe ná ba-anjelu na yango babundi makasi.

[8] Kasi Elima elongaki té. Yango wana ezwaki lisusu esika té po éfanda na Likolo ná ba-anjelu na yango.

[9] Babengani Elima monene wana: yango nde ezali “Nyoka ya Kala” oyo ekosaka bato ya mokili mobimba; babengaka yango Zabolo to Satan. Babwaki yango na mokili, ná ba-anjelu na yango.

[10] Bongo nayoki mongongo moko ya makasi euti na Likolo, elobi: “Sik'oyo Nzambe na biso alongi, alakisi nguya pe bokonzi na ye; Mesia na ye alakisi pe bokonzi na ye. Babengani monguna ya bandeko na biso, oyo azalaká kofunda bango butu moi, na miso ya Nzambe na biso.

[11] Bango balongi ye po na makila ya Mwana-Meme, pe po na maloba ya Nzambe oyo bazalaki kosakola. Bandimaki kopesa bomoi na bango, babangaki liwa té.

[12] Yango wana yo, Likolo, sepela! Bino nyonso bato bozali kuna, bósepela! Kasi mawa mingi na yo, mokili pe ebale, pamba té Satan ayei kokita epai na bino; atondi na kanda penza, po ayebi 'tè tango na ye etikali moke.”

[13] Tango Elima emoni 'tè babengani yango pe babwaki yango na mokili, ebandi kolanda Mwasi oyo abotaki mwana-mobali.

[14] Kasi Mwasi azwi mapapu mibale lokola ya kombekombe moko monene, po ápumbwa tii na esobe, na esika oyo babongiselá ye. Boye akozala mosika ya Nyoka, pe bakobanda koleisa ye kuna mbula misato na ndambo.

[15] Nzokande Nyoka ebandi kosanza mai lokola ebale, po élanda Mwasi pe émema ye.

[16] Kasi mokili eyei kosalisa Mwasi; mabelé efungwami pe emeli mai oyo Elima ebandaki kosanza.

[17] Elima esilikeli Mwasi makasi penza, bongo ekei kobundisa bana na ye mosusu; ezali baoyo nyonso batosaka mibeko ya Nzambe, pe balandaka maloba ya Yezu.

[18] Sima Elima ekei kotelema na libongo ya ebale monene.

Koyebisa Basekelé — Chapters