[1] Namoni pe anjelu mosusu ya nguya auti na Likolo, alati lipata moko lokola elamba, pe arkansiel moko ezingi motú na ye. Elongi na ye ezali lokola moi, pe makolo na ye lokola makonzi ya móto.
[2] Asimbi mwa-buku moko ya kofungwama. Atie likolò ya mobali na ebale, pe likolò ya mwasi na mokili.
[3] Agangi na mongongo makasi lokola tambo; pe tango asilisi koganga, kake ebeti mbala sambo.
[4] Tango makelele wana sambo esili, nalingaki kokòma na mokanda makambo oyo nayokaki, kasi mongongo moko euti na Likolo elobi na ngai: “Bomba sekelé oyo makelele sambo ya kake euti koyebisa yo; kokòma yango té.”
[5] Bongo anjelu oyo namoni atelemi na ebale pe na mokili atomboli liboko ya mobali na Likolo.
[6] Akati seleka na kombo ya Nzambe oyo azali seko na seko, Nzambe oyo asalá Likolo ná biloko nyonso ezali kuna, mabelé ná biloko nyonso ezali kuna, pe ebale ná biloko nyonso ezali kuna; alobi boye: “Tango ekozala lisusu té!
[7] Kasi mokolo anjelu ya sambo akobeta kelelo, Nzambe akokokisa sekelé na ye, akosala ndenge ayebisaká baprofete oyo bazalaká kosalela ye.”
[8] Bongo mongongo oyo nayokaki na Likolo, elobi na ngai lisusu: “Kende epai ya anjelu oyo atelemi na ebale pe na mokili; kamata mwa-buku ya kofungwama oyo ye asimbi.”
[9] Napusani penepene na ye, bongo nasengi ye yango. Alobi na ngai: “Kamata pe lia yango. Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko ekozala sukali lokola mafuta ya nzoi.”
[10] Nakamati mwa-buku yango epai ya anjelu pe nalei yango. Na monoko na ngai ezalaki lokola mafuta ya nzoi, kasi tango nameli yango, ekómi bololo na kati ya libumu.
[11] Bongo balobi na ngai: “Esengeli lisusu kosakola maloba Molimo apesi yo, oyo etali bato ya bamboka pe minoko ebele, ná bakonzi na bango.”