Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:27

[1] Bongo namoni Nyama moko, ebimi na ebale; ezalaki na maseke zomi pe mitú sambo. Na liseke moko moko elati ekoti ya bokonzi; pe na likolo ya mitú na yango bakòmá bakombo ya kotsiola Nzambe.

[2] Nyama oyo nazalaki komona ekokani na nkoi; makolo na yango ezali lokola ya nkosi: pe monoko lokola ya tambo. Elima epesi yango bokonzi pe makasi nyonso, pe efandisi yango na kiti oyo yango moko ezalaki kofanda.

[3] Motú moko ya Nyama wana ezalaki na pota ya somo oyo elingaki koboma yango; kasi Nyama ebikaki kaka, boye bato nyonso ya mokili bakamwe penza pe balandi Nyama.

[4] Bango nyonso babandi kofukamela Elima, po epesaki bokonzi na Nyama. Bafukameli pe Nyama, balobi: “Nani akokani na Nyama? Nani akoki kobundisa yango?”

[5] Nyama ezwi nzela ya koloba makambo ya lofundu pe ya kotsiola Nzambe; ezwi bokonzi ya kosala mosala na yango mbula misato na ndambo;

[6] ebandi kotsiola Nzambe pe bokonzi na ye, ná Ndako ye afandaka, pe baoyo bazalaka epai na ye na Likolo.

[7] Bapesi yango nzela ya kobundisa bato ya bosantu pe ya kolonga bango; boye ezwi bokonzi ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso pe minoko nyonso.

[8] Na mokili mobimba bato ebele babandi kofukamela yango, pamba té uta na ebandeli ya mokili bakombo na bango ekòmamá té na buku ya bomoi ya Mwana-Meme oyo babomaki.

[9] Moto oyo azali na matoi, áyoka!

[10] Oyo atangamá kokangama, bakokanga ye; oyo atangamá kokufa na mbeli, akokufa na mbeli. Yango wana esengeli bato ya bosantu bákanga mitema pe bázala na bondimi.

[11] Bongo namoni nyama ya mibale ebimi na mokili; ezalaki na maseke mibale ekokani ná oyo ya Mwana-Meme, pe ezalaki koloba lokola Elima.

[12] Ezalaki na makasi nyonso ya Nyama ya liboso; pe ebandi kosala ndenge moko, na miso na yango. Ezalaki kosala 'tè bato nyonso ya mokili báfukamela Nyama ya liboso, oyo ebikaki na pota wana ya somo.

[13] Ezalaki kosala makamwisi minene; esali kutu 'tè móto élongwa na Likolo pe éya kokweya na mokili, na miso ya bato nyonso.

[14] Lokola bapesi yango nguya ya kosala makamwisi nyonso wana na miso ya Nyama ya liboso, ezwi nzela ya kokosa bato ya mokili; etindi bango kutu básala ekeko po na kokumisa Nyama ya liboso, oyo bazokisaki na mbeli kasi ekufaki té.

[15] Na sima ezwi nzela ya kopesa bomoi na ekeko wana, bongo yango ebandi koloba pe kobomisa baoyo nyonso baboyi kofukamela yango.

[16] Boye nyama oyo etindi bato nyonso na makasi 'tè bázwa elembo na liboko ya mobali to na elongi; ézala bato minene to bato pamba, bato ya bomengo to baoyo bakelelá, baumbu to bansomi.

[17] Ata moto moko té akokaki kosomba to kotekisa eloko, soki azangi elembo yango, to kombo ya Nyama to pe talo oyo ekokani na kombo na yango.

[18] Makambo oyo ezali kosenga mayele. Moto nyonso oyo azali na mayele akoki koyeba tina ya talo ya Nyama. Pamba té talo yango elakisi moto. Talo na ye ezali 666.

Koyebisa Basekelé — Chapters