[1] Na sima ya makambo wana, nayoki lokola mingongo makasi ya bato ebele penza, bazali koloba na Likolo: “Aleluya! Nzambe na biso azali Mobikisi; lokumu pe nguya ezali na ye!
[2] Ye akataka makambo nyonso na ndenge ya solo pe ya bosembo. Akati likambo ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na kindumba na ye; apesi ye etumbu po ndumba wana abomaki basali na ye.”
[3] Bongo nayoki lisusu balobi: “Aleluya! Móto ezali kozikisa vile oyo ya monene; milinga na yango ezali komata mikolo nyonso seko!”
[4] Bambuta-muntu tuku mibale na minei (24) pe ba-Sheriben minei bafukameli Nzambe oyo afandi na Kiti ya bokonzi, pe balobi: “Amen! Aleluya!”
[5] Mongongo moko euti epai ya Kiti ya bokonzi, elobi: “Bókumisa Nzambe na biso, bino nyonso basali na ye, bino nyonso bato botosaka ye, ézala bato minene to bato pamba.”
[6] Bongo nayoki mingongo ya bato ebele penza, ezalaki koyokana lokola makelele ya bambonge ya ebale, pe lokola kake ya makasi, balobi: “Aleluya! Nkolo akamati bokonzi! Ye azali Nzambe na biso ya nguya nyonso;
[7] tósepela, tózala na esengo, tókumisa ye. Oyo ezali feti ya libala ya Mwana-Meme; mwasi na ye asi'amibongisi.
[8] Balatisi ye bilamba ya lokumu, ya peto pe ya pembe penza; ezali nde misala ya bosembo ya bato ya bosantu.”
[9] Anjelu moko alobi na ngai: “Kòma boye: Esengo na baoyo Nzambe abengisi na feti ya libala ya Mwana-Meme!” Pe abakisi: “Ezali maloba ya solo ya Nzambe.”
[10] Bongo nafukameli anjelu, kasi ye alobi na ngai: “Kosala boye té! Ngai nazali kaka mosali lokola yo, pe lokola bandeko na yo oyo babatelaka sango Yezu ayeelaki bato! Fukamela bobele Nzambe. Pamba té, maloba oyo Yezu ayeelaki bato, Molimo moto apesaka yango na baprofete.”
[11] Bongo namoni Likolo efungwami. Punda moko ya pembe emonani; oyo amati yango babengaka ye “Moto ya solo pe ya bosembo”; ye asambisaka bato pe abundaka na bosembo nyonso.
[12] Miso na ye ezali kongala lokola móto; alati bikoti mingi ya bokonzi na motú. Na nzoto na ye bakòmá kombo oyo bobele ye moko ayebi.
[13] Alati nzambala moko epoli na makila. Kombo na ye “Maloba ya Nzambe.”
[14] Basoda ya Likolo bazalaki kolanda ye, bamati na bapunda ya pembe pe balati bilamba ya lokumu, ya peto pe ya pembe.
[15] Mbeli moko ya etumba, ya mino makasi, ebimi na monoko na ye, po ábundisa na yango bato ya bikolo nyonso. Akotambwisa yango na makasi penza. Ye moto akokamola mbuma ya vinu na libulu oyo Nzambe ya nguya nyonso atimolá na kanda na ye ya somo.
[16] Na nzambala na ye pe na likolò na ye bakòmá kombo oyo: “Mokonzi ya bakonzi pe Nkolo ya bankolo.”
[17] Bongo namoni anjelu moko atelemi na kati ya moi, abeleli na mongongo makasi epai ya bandeke oyo ezalaki kopumbwa na kati ya likolo: “Bóya kosangana esika moko na feti monene ya Nzambe!
[18] Bóya kolia misuni ya bakonzi ya bikolo, ya basoda ná bashef na bango, misuni ya bapunda ná bato oyo bamataka yango, misuni ya bato nyonso, ézala baumbu to bansomi, ézala bato minene to bato pamba!”
[19] Bongo namoni Nyama ná bakonzi ya mokili pe basoda na bango, basangani esika moko po na kobundisa Moto oyo amati na punda, pe basoda na ye.
[20] Bakangi Nyama ná profete ya lokuta oyo azalaki kosala makamwisi na miso na yango; ezali na makamwisi yango nde akosaki bato oyo bazwaki elembo ya Nyama pe bazalaki kofukamela ekeko na yango. Nyama ná profete ya lokuta, babomi bango té kasi babwaki bango mibale na laki ya móto esika fofólo ezali kopela.
[21] Nzokande bakonzi ya mokili ná basoda na bango, basilisi bango na mbeli oyo ezali kobima na monoko ya Moto oyo amati na punda; bongo bandeke nyonso eyei kolia misuni na bango.