Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:49

[1] Sima ya makambo wana, namoni lisusu lokola na ndoto: porte moko efungwami na Likolo. Pe nayoki mongongo oyo nayokaki liboso, ezalaki koyokana lokola kelelo: “Mata awa; nakolakisa yo makambo nyonso oyo esengeli koya sima.”

[2] Na mbala moko Molimo akoteli ngai, pe namoni Kiti moko ya bokonzi ezali kuna na Likolo. Moto moko afandi na yango,

[3] elongi na ye ezali kongenga lokola mabanga ya talo. Arkansiel moko ezingi Kiti ya bokonzi yango; pe ezali kongenga lokola libanga moko ya talo.

[4] Bakiti mosusu tuku mibale na minei (24) ezingi Kiti ya bokonzi. Bambuta-muntu tuku mibale na minei (24) bafandi na bakiti yango; balati bilamba ya pembe pe bikoti ya or.

[5] Kake ná bamóto na yango, pe mingongo ezali kouta epai ya Kiti. Bamwinda sambo ezali kopela liboso ya Kiti; yango ezali nde milimo sambo ya Nzambe.

[6] Liboso ya Kiti, namoni lokola ebale; yango ezali kongenga lokola talatala oyo babengaka kristal. Bikelamo minei ya bomoi etelemi epai na epai ya Kiti ya bokonzi: nzoto na yango etondá na miso ebele, na liboso pe na sima.

[7] Sheriben ya liboso azali lokola tambo, ya mibale lokola ngombe ya mobali, ya misato azali na elongi lokola moto, pe ya minei lokola kombekombe oyo ezali kopumbwa.

[8] Pe ba-Sheriben wana minei, moko moko azali na mapapu motoba; yango nyonso pe etondá na miso, na kati pe na libanda. Butu moi ata kopema té, bazali bobele koyemba boye: “Mosantu, Mosantu, Mosantu! Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso azali Mosantu! Ye azalaká, azali, pe akoya.”

[9] Ndenge wana ba-Sheriben bazali kopesa lokumu pe nkembo na Moto afandi na Kiti ya bokonzi, Moto ya bomoi mikolo nyonso seko, pe bazali kopesa ye mersi. Mbala nyonso basalaka boye,

[10] Bambuta-muntu wana tuku mibale na minei (24) bafukamaka bilongi na se, liboso ya Moto afandi na Kiti ya bokonzi, Moto ya bomoi mikolo nyonso seko; pe batiaka bikoti na bango ya or liboso ya Kiti na ye; bazali koyemba boye:

[11] “Nkolo, Nzambe na biso ebongi ózwa nkembo, lokumu pe nguya. Pamba té yo moto osalá biloko nyonso; olingaki ézala, bongo yango esalamaki.”

Koyebisa Basekelé — Chapters