Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:54

[1] Sima bapesi ngai mwa-nzete moko ya molai lokola oyo bamekelaka bilanga; pe balobi na ngai: “Kende komeka Ndako ya Nzambe ná mesa ya mabonza; bongo tanga bato oyo bazali kosambela Nzambe kuna.

[2] Kasi tika lopango oyo ezali libanda ya Ndako ya Nzambe; komeka yango té. Pamba té basi'bapesi yango na bato oyo bayebi Nzambe té; bango bakonyata mboka ya bosantu, mbula misato na ndambo.

[3] Nakotinda batemwen na ngai mibale, mbula misato na ndambo bálata pili pe básakola maloba Molimo apesi bango.”

[4] Batemwen wana bazali lokola banzete mibale ya olive pe lokola bamwinda mibale oyo ezali liboso ya Nkolo ya mokili.

[5] Soki moto ameki konyokola bango, móto ekobima na minoko na bango pe ekoboma banguna na bango; ya solo, moto nyonso oyo akomeka konyokola bango akokufa na ndenge wana.

[6] Bango bazali na bokonzi ya kokanga Likolo po 'tè mbula énoka té tango bazali kosakola maloba euti na Molimo; bazali pe na bokonzi ya kobongola mai ékóma makila, pe ya kotinda bapasi ya ndenge na ndenge awa na mokili, tango nyonso oyo bango balingi.

[7] Tango bakosilisa kosakola, nyama oyo ekobima na libulu bakangá milimo mabe ekoya kobundisa bango, ekolonga pe ekoboma bango.

[8] Bibembe na bango ekotikala na libanda, na miso ya bato nyonso, na mboka monene esika babomaki Nkolo na bango na kuruze. Bakoki kobenga mboka wana “Sodome” to “Ejipte.”

[9] Bakopesa nzela té ya kokunda bango. Bato ya bamboka nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso, pe minoko nyonso, bakoya kotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo.

[10] Bato ya mokili bakosepela po na liwa ya baprofete wana mibale; bakotonda na esengo pe bakopesana makabo, pamba té mateya na bango emonisaki bato ya mokili pasi mingi.

[11] Kasi sima ya mikolo wana misato na ndambo, pema ya bomoi euti na Nzambe pe eyei kokotela bango, bongo batelemi. Bato nyonso oyo bamoni bango, bakómi koyoka somo penza.

[12] Baprofete wana bayoki mongongo moko makasi euti na Likolo pe elobi: “Bómata awa.” Bamati na Likolo na kati ya mapata, na miso ya banguna na bango.

[13] Kaka na tango wana mokili eninganaki makasi penza. Mwa-eteni moko ya mboka ebukani, pe bato 7.000 bakufi. Baoyo batikali batondi na somo pe bakómi kokumisa Nzambe ya Likolo.

[14] Mawa ya mibale eleki; etikali moke mawa ya misato éya.

[15] Bongo anjelu ya sambo abeti kelelo. Mongongo moko ya makasi eyokani na Likolo, elobi: “Bokonzi ya mokili mobimba esi'ekómi na maboko ya Nkolo na biso pe Mesia na ye. Ye akozala Mokonzi mikolo nyonso seko.”

[16] Bambuta-muntu tuku mibale na minei (24) oyo bafandi na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe, bakwei bilongi na se pe bakumisi Nzambe,

[17] balobi: “Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso, yo ozalaká pe ozali. Topesi yo mersi po okamati bokonzi; osaleli nguya na yo monene!

[18] Bato ya bikolo nyonso basilikaki, kasi yo olakisi bango kanda na yo. Tango ekoki po ósilisa baoyo babebisaka mokili, pe ólongisa bato oyo bakufá. Pesa lifuta na bato na yo ya bosantu, na baprofete oyo bazalaki kosalela yo, pe na bato nyonso oyo bazalaki kotosa yo, ézala bato minene to bato pamba.”

[19] Bongo Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo efungwami, pe Sanduku ya Boyokani emonani na Ndako yango. Kake, ba-móto na yango pe mingongo ebimi, mokili eningani, pe mbula ya mabanga ebeti.

Koyebisa Basekelé — Chapters