[1] Bongo nayoki mongongo moko ya makasi euti na Ndako ya Nzambe; elobi na ba-anjelu sambo boye: “Bókende na basani sambo oyo etondá na kanda ya Nzambe, bósopa yango na mokili.”
[2] Anjelu ya liboso akei kosopa sani na ye na mokili; bongo bapota ya mabe pe ya pasi ebimi na nzoto ya bato oyo bazwaki elembo ya Nyama pe babandaki kofukamela ekeko na yango.
[3] Anjelu ya mibale akei kosopa sani na ye na ebale monene. Bongo ebale ekómi makila lokola nde babomi moto, pe bambisi nyonso oyo ezalaki na mai wana ekufi.
[4] Anjelu ya misato akei kosopa sani na ye na ba-ebale pe bisika mai ebimelaka na mabelé: bongo mai nyonso ekómi makila.
[5] Pe nayoki anjelu oyo azali mokonzi ya bamai alobi: “Nzambe ya bosantu, yo moto ozalaká pe ozali, olakisi 'tè ozali bosembo na ndenge okati makambo.
[6] Pamba té bango batangisaki makila ya bato ya bosantu pe ya baprofete; lokola omelisi bango makila, bazwi etumbu oyo ekoki na bango!”
[7] Bongo nayoki mongongo moko euti na mesa ya mabonza, elobi: “Ee, Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo pe ya bosembo!”
[8] Anjelu ya minei akei kosopa sani na ye na moi, bongo moi ezwi nzela ya kozikisa bato na móto na yango.
[9] Bato ya mokili bazikaki makasi penza; babandi kotsiola kombo ya Nzambe oyo atindaki bapasi wana. Kasi baboyi kobongola mitema pe kokumisa Nzambe.
[10] Anjelu ya mitano akei kosopa sani na ye na kiti ya bokonzi ya Nyama; bongo mboka na yango ekómi molili, pe bato babandi kolia lolemo po na pasi.
[11] Batsioli Nzambe ya Likolo po na bapasi pe bapota na bango; kasi baboyaki makambo na bango ya mabe té.
[12] Anjelu ya motoba akei kosopa sani na ye na ebale Ufrate; bongo ebale ekauki po na kopesa nzela na bakonzi oyo bakouta na epai moi ebimaka.
[13] Sima namoni milimo misato ya mabe lokola magorodo ebimi na monoko ya Elima, ya Nyama, pe ya profete ya lokuta.
[14] Ezali milimo ya bazabolo; yango ebandi kosala makamwisi, ekei epai ya bakonzi ya mokili mobimba; ezali kosangisa bango esika moko po na kobunda bitumba, na mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso.
[15] Nkolo alobi: “Yoka! Nakoya lokola moyibi! Esengo na moto oyo azali ekenge pe abatelaka bilamba na ye; boye akotambola bolumbu té pe akomona soni té na miso ya bato.”
[16] Milimo wana esangisi bakonzi ya mokili na esika oyo babengaka na monoko ya ebré “Armagedon.”
[17] Anjelu ya sambo akei kosopa sani na ye na mapata; bongo mongongo moko ya makasi euti na Kiti ya bokonzi na kati ya Ndako ya Nzambe; elobi: “Esili!”
[18] Kake ná ba-móto na yango pe mingongo ebimi, pe mokili eningani makasi penza. Banda mokolo Nzambe asalá bato, mokili eninganá nanu ndenge wana té.
[19] Nzambe ayei kokanisa vile monene ya Babilone, pe amelisi yango kopo etondá na vinu ya kanda na ye. Mabelé ya vile wana ya monene epasuki na biteni misato; pe ba-vile nyonso ya mokili epanzani.
[20] Bisanga nyonso elimwe, pe bangomba emonanaki lisusu té.
[21] Mabanga minene ya mbula eyei kokweela bato; moko moko ezalaki na kilo soki tuku minei (40). Bato babandi kotsiola Nzambe po na pasi ya mbula wana ya mabanga, pamba té yango ezalaki pasi moko ya somo penza.