Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:49

[1] Na sima anjelu alakisi ngai ebale ya mai ya bomoi, euti epai ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe ná ya Mwana-Meme, ezali kongenga lokola kristal.

[2] Ebale yango ekabwaná; ezali koleka epai na epai ya balabala monene ya vile. Kuna na kati ezali na nzete ya bomoi oyo ebotaka mbuma mbala zomi na mibale na mbula moko, elingi koloba 'tè mbala moko na sanza moko. Makasa na yango ezali po na kobikisa bato ya bikolo nyonso.

[3] Ata eloko moko té ya lisumá ekomonana na vile wana. Kiti ya bokonzi ya Nzambe ná ya Mwana-Meme ekozala kuna, pe basali ya Nzambe bakobanda kosambela ye.

[4] Bakomona ye na miso, pe kombo na ye ekozala komonana na bilongi na bango.

[5] Butu ekozala lisusu té, pe bakozala na posa ya mwinda té to ya moi, po Nkolo Nzambe akozala kongengela basali na ye; bango bakozala bakonzi seko na seko.

[6] Na sima anjelu alobi na ngai boye: “Maloba oyo ezali ya solo, pe bato bakoki kotiela yango mitema. Nkolo Nzambe oyo apesaka Molimo na ye na baprofete, atindaki anjelu po álakisa na basali na ye makambo oyo esengeli koya na mwa-mikolo.”

[7] Bongo Yezu alobi: “Tala, etikali moke náya! Esengo na baoyo babatelaka maloba euti na Molimo, ndenge ekòmamá na buku oyo.”

[8] Ngai Yoane nayokaki pe namonaki makambo wana. Bongo tango nasilisaki koyoka pe komona, nafukameli anjelu oyo alakisaki ngai yango.

[9] Kasi ye alobi na ngai: “Kosala boye té! Fukamela bobele Nzambe. Ngai nazali kaka mosali lokola yo, pe lokola bandeko na yo baprofete, ná bato nyonso oyo batosaka maloba ekòmamá na buku oyo.”

[10] Bongo alobi na ngai lisusu boye: “Maloba euti na Molimo, ndenge ekòmamá na buku oyo, kobomba yango té! Pamba té tango elingi ékoka.

[11] Moto nyonso oyo asalaka mabe, álanda kaka makambo ya mabe; moto nyonso oyo asalaka makambo ya mbindo, álanda kaka makambo ya mbindo. Moto nyonso oyo asalaka malamu, álanda kaka makambo ya malamu; moto nyonso oyo azali moto ya Nzambe, ámipesa mobimba na Nzambe.”

[12] Bongo Yezu alobi: “Tala, etikali moke náya! Nakoyeela moto na moto lifuta ya mosala na ye.

[13] Ngai nazali Moto ya liboso pe ya suka, ngai moto nabandaki mokili pe nasukisi yango; nazali penza Ebandeli pe Suka.”

[14] Esengo na baoyo basukoli bilamba na bango, po bázwa nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, pe bákoka kokota na baporte ya Yeruzalem ya sika.

[15] Kasi bato oyo basalaka makambo ya mbindo, bandoki, baoyo basalaka kindumba, babomaka bato, basambelaka banzambe ya bikeko, pe bato nyonso ya lokuta, bango nyonso bakotikala na libanda.

[16] “Ngai Yezu, natindi anjelu na ngai po na kolakisa bino makambo nyonso wana etali ba-Eklezya. Ngai nazali Mwana oyo Nzambe alakaká na David. Nazali monzoto oyo etanisaka tongo.”

[17] Molimo ná mwasi oyo Mwana-Meme akobala, balobi: “Yaka!” Moto oyo ayoki yango áloba pe: “Yaka!” Oyo ayoki posa ya mai áya; oyo alingi komela, ázwa mai ya bomoi ya ofelé.

[18] Moto nyonso oyo azali koyoka maloba euti na Molimo, ndenge bakòmá na buku oyo, ngai Yoane nazali koyebisa ye ákeba. Soki moto abakisi likambo mosusu, Nzambe akobakisela ye bapasi nyonso ekòmamá na buku oyo.

[19] Pe soki moto alongoli likambo mosusu, Nzambe akolongola ye na molongo ya bato oyo bakobanda kolia mbuma ya nzete ya bomoi, akopesa ye pe esika té na vile ya bosantu; ye akozanga nyonso ekòmamá na buku oyo.

[20] Yezu moto ayebisi yango, alobi: “Ee, etikali moke náya!” Ézala se bongo! Nkolo Yezu, yaka!

[21] Bolamu ya Nkolo Yezu ézala na bato nyonso.

Koyebisa Basekelé — Chapters