Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:30

[1] Bongo namoni Likolo ya sika pe Mokili ya sika. Pamba té Likolo ya liboso ná mokili ya liboso elimwaki, pe ebale monene ezali lisusu té.

[2] Pe namoni vile ya bosantu, Yeruzalem ya sika, euti na Likolo epai ya Nzambe; yango ekómi kitoko, ndenge elenge mwasi amibongisaka po na kokutana ná mobali na ye.

[3] Nayoki mongongo makasi euti epai ya Kiti ya bokonzi, elobi: “Tala Nzambe ayei kotònga na kati ya bato; ayei kofanda epai na bango. Bango bakozala bato na ye, pe Nzambe ye moko akozala ná bango.

[4] Akopangusa bango mai nyonso ya miso; liwa ekozala lisusu té, ata matanga, ézala mawa to pe pasi. Pamba té makambo ya kala esili.”

[5] Bongo Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi alobi: “Sik'oyo nazali kosala biloko nyonso ya sika.” Na sima alobi na ngai: “Kòma maloba yango, pamba té ezali ya solo, pe bato bakoki kotiela yango mitema.”

[6] Pe abakisi: “Esili! Ngai nazali Ebandeli pe Suka! Moto oyo azali na posa ya mai, nakomelisa ye mai ya ofelé; akozwa yango na esika mai ya bomoi ebimelaka.

[7] Moto alongi akozwa bolamu wana; nakozala Nzambe na ye, pe ye akozala Mwana na ngai.

[8] Kasi bato oyo babangaka pe basundolá bondimi, bato ya bizaleli mabe, bandoki, baoyo babomaka bato, basalaka kindumba, basambelaka banzambe ya bikeko, pe bato nyonso ya lokuta, esika na bango ezali na laki oyo epelaka móto ná fofólo; yango nde liwa ya mibale.”

[9] Anjelu ayei epai na ngai; ye azalaki moko ya baoyo bazalaki kosimba basani sambo etondá na bapasi sambo ya suka. Alobi na ngai: “Yaka; nakolakisa yo mwasi oyo Mwana-Meme akobala.”

[10] Molimo ya Nzambe akoteli ngai, bongo anjelu amemi ngai na likolo ya ngomba moko ya molai koleka. Alakisi ngai Yeruzalem, vile ya bosantu oyo euti na Likolo epai ya Nzambe.

[11] Ezalaki kongenga na lokumu ya Nzambe, lokola mabanga ya talo ya kitoko penza.

[12] Vile yango ezali na lopango moko ya molai pe ya makasi. Lopango wana ezali na baporte zomi na mibale: misato na epai moi ebimaka, misato na epai moi elalaka, misato na epai ya likolo, pe misato na epai ya se. Ba-anjelu zomi na mibale bazali kokengela yango. Likolo ya baporte wana bakòmá bakombo ya mabota zomi na mibale ya Israel.

[14] Lopango ya vile etòngamá na likolo ya ba-fondasion zomi na mibale; na yango bakòmá bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mwana-Meme.

[15] Anjelu oyo azalaki koloba na ngai asimbi mwa-nzete ya or po na komeka vile ná baporte, pe lopango na yango.

[16] Ameki yango; molai ya vile na bipai nyonso minei, ná molai na yango banda na se tii na likolo, ezali ndenge moko: ya bastade 12.000. Sima ameki pe lopango: molai na yango banda na se tii na likolo ezali ya maboko 144. Anjelu amekaki yango ndenge bato bamekaka.

[18] Batòngá lopango yango na mabanga ya yaspe; pe vile mobimba esalamá na or ya peto oyo ezali komonana lokola talatala ya peto.

[19] Na ba-fondasion ya lopango ya vile, batiá mabanga ya talo ya ndenge zomi na mibale: yaspe, safire, agate, emerode,

[20] oniks, sardwane, krizolite, beril, topaze, krizopaze, yasente, pe ametiste.

[21] Baporte wana zomi na mibale esalamá na mayaka zomi na mibale. Porte moko moko ezali liyaka moko. Balabala monene ya vile batandá yango na or ya peto oyo ezali polele lokola talatala.

[22] Na kati ya vile, namonaki Ndako ya Nzambe té. Pamba té Nkolo, Nzambe ya nguya nyonso, azali esika na yango ya bosantu, ye ná Mwana-Meme.

[23] Vile yango ezali na posa ya moi té to sanza po na kongengela yango, pamba té lokumu ya Nzambe moto engengisaka yango, pe Mwana-Meme azali lokola mwinda na yango.

[24] Vile ekozala kongengela bato ya bikolo nyonso. Bango nyonso bakobanda koya epai na yango, pe bakonzi ya mokili bakomemela yango bomengo na bango.

[25] Bakokanga baporte na yango ata mokolo moko té, po kuna butu ekozala té.

[26] Vile yango ekozwa lokumu pe bomengo ya bikolo nyonso.

[27] Eloko moko té ya mbindo ekoki kokota kuna, ézala baoyo basalaka makambo ya mabe pe ya soni to baoyo balobaka lokuta; kasi bato oyo bakokota kuna, ezali bobele baoyo bakombo na bango esi'ekòmamá na buku ya Mwana-Meme.

Koyebisa Basekelé — Chapters