Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:40

[1] Sima ya makambo wana natali lisusu, namoni ba-anjelu minei batelemi bipai nyonso minei ya mokili; bakangi mipepe nyonso minei po moko té éleka na mokili to na ebale monene to pe na banzete.

[2] Bongo namoni anjelu mosusu auti na epai moi ebimaka; asimbi kashé ya Nzambe ya bomoi. Abeleli na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo bazwaki nguya ya kosala mabe na mokili pe na ebale,

[3] alobi: “Bósala mabe té na mokili to na ebale to na banzete, tii tango tokosilisa kotia kashé na bilongi ya basali nyonso ya Nzambe na biso.”

[4] Pe bayebisi ngai talo ya bato oyo bazwaki kashé na bilongi na bango. Bazali 144.000, ya mabota nyonso ya Israel,

[5] elingi koloba 12.000 na libota moko moko: Yuda, Ruben, Gad, Asher, Neftali, Manasé, Simeon, Levi, Isakar, Zebulon, Jozef pe Benjamen.

[9] Sima ya makambo wana natali lisusu, namoni bato ebele penza, ata moto moko té akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya bamboka nyonso pe ya minoko nyonso. Batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi pe na miso ya Mwana-Meme; balati banzambala ya pembe; moto na moto asimbi mandalala na maboko.

[10] Bazalaki koganga na mingongo makasi: “Nzambe na biso oyo afandi na Kiti ya bokonzi abikisi biso, ye ná Mwana-Meme.”

[11] Ba-anjelu nyonso oyo bazingi Kiti ya bokonzi, ná Bambuta-muntu pe ba-Sheriben minei, bakwei bilongi na se liboso ya Kiti ya bokonzi pe bakumisi Nzambe.

[12] Balobi: “Amen! Lokumu nyonso, nkembo, mayele, mersi, nguya pe makasi, ézala na Nzambe na biso, mikolo nyonso seko! Amen!”

[13] Moko na kati ya Bambuta-muntu atuni ngai: “Bato wana balati banzambala ya pembe, bazali banani? Pe bauti wapi?”

[14] Nazongiseli ye: “Mokonzi, yo moko oyebi.” Bongo alobi na ngai: “Bango bauti kobika na monyokoli monene. Banzambala na bango ekómi pembe pamba té basukoli yango na makila ya Mwana-Meme.

[15] Yango wana batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe pe bazali kosalela ye butu moi na Ndako na ye. Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi akobomba bango na Ndako na ye.

[16] Ata mokolo moko té bakoyoka lisusu posa ya kolia to ya komela; bakomona pasi lisusu té na moi to na molunge,

[17] pamba té Mwana-Meme oyo azali na Kiti ya bokonzi akozala na bango lokola mobokoli ya bameme, akomema bango na bisika mai ya bomoi ebimelaka. Bongo Nzambe akopangusa mai nyonso oyo ezali kobima na miso na bango.”

Koyebisa Basekelé — Chapters