Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:41

[1] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Efeze boye: Yoka maloba ya Moto oyo asimbi minzoto sambo na liboko na ye ya mobali pe azali kotambola na kati ya bamwinda sambo ya or:

[2] “Nayebi makambo nyonso bosalaka, pasi oyo bomonaka na mosala, pe ndenge bokangaka mitema. Nayebi 'tè bokoki kofanda esika moko té ná bato ya mabe; bosi'bomeki baoyo balobaka 'tè bazali bantoma na ngai, nzokande ezali boye té, bomoni 'tè bazali bato ya lokuta.

[3] Bozalaki kokanga mitema pe bolembaki té, tango bozalaki komona pasi po na ngai.

[4] Kasi mabe moko namonaka epai na bino, yango oyo: bolingaka ngai lisusu té lokola na ebandeli.

[5] Bókanisa nanu esika bozalaká, liboso 'tè bókweya. Bóbongola mitema, bongo bózongela misala na bino ya kala. Soki bobongoli mitema té, nakoya epai na bino pe na kolongola mwinda na bino.

[6] Kasi malamu moko namoni epai na bino, yango oyo: boyinaka makambo bato ya Nikola basalaka, bobele ndenge ngai nayinaka yango.

[7] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya! “Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi oyo ezali epai ya Nzambe, na mboka na ye ya bisengo.”

[8] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Simirne boye: Yoka maloba ya moto ya liboso pe ya suka, oyo akufaki pe asekwaki:

[9] “Nayebi ndenge bozali komona pasi pe kokelela, kasi bozali penza na bomengo. Nayebi ndenge bazali kotónga bino na baoyo balobaka 'tè bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda té, kasi bazali lingomba ya Satan.

[10] Bóbanga té po na pasi oyo ezali kozela bino. Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko, po na komeka bino; bokonyokwama mikolo zomi. Bópika pende tii na liwa, bongo nakolongisa bino pe nakopesa bino bomoi ya seko.

[11] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya! “Oyo akolonga, liwa ya mibale ekolia ye té.”

[12] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Pergame boye: Yoka maloba ya Moto oyo azali na mbeli ya mino mibale:

[13] “Nayebi esika bino bofandaka; Satan atie kiti na ye ya bokonzi kuna. Kasi bino bosi'bondimeli ngai libela. Botikaki bondimi na bino té, ata tango babomaki mosakoli na ngai ya solo Antipas, na mboka na bino esika Satan afandi.

[14] Kasi mwa-mabe namonaka epai na bino, yango oyo: Na kati na bino ezali na bato mosusu balandaka mateya ya Balaam. Ye azalaká kopesa Balak batoli ya kokweisa bato ya Israel na likambo, na ndenge azalaki kotinda bango báliaka nyama oyo bapesaki mabonza na banzambe ya bikeko, pe básala kindumba.

[15] Pe lisusu na kati na bino bamosusu balandaka mateya ya bato ya Nikola.

[16] Yango wana bóbongola mitema; soki té etikali moke náya kobundisa bato wana na mbeli oyo ezali kobima na monoko na ngai.”

[17] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya! “Oyo akolonga, nakopesa ye mane oyo nabombelá ye. Pe nakopesa ye libanga moko ya pembe oyo bakòmá kombo ya sika. Moto moko té akoyeba kombo wana, bobele moto oyo azwi yango.”

[18] Kòmela anjelu ya Eklezya ya Tiatire boye: Yoka maloba ya Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso engengaka lokola móto, pe makolo lokola nde basalá yango na ebende ya talo:

[19] “Nayebi bizaleli, bolingo, bondimi ná misala na bino, pe ndenge bokangaka mitema. Misala bozali kosala sik'oyo eleki kutu oyo ya liboso.

[20] Kasi mabe namonaka epai na bino, yango oyo: bozali kondima Jezabel áfanda na kati na bino. Mwasi yango alobaka 'tè azali mosakoli ya Nzambe; ateyaka pe akosaka basali na ngai po básala kindumba pe bália nyama ya mabonza oyo bapesaki banzambe ya bikeko.

[21] Napesaki ye tango po ábongola motema, kasi alingi kotika kindumba na ye té.

[22] Yango wana nakosala 'tè maladi élalisa ye; bato oyo bazalaki kotambola ná ye, nakonyokola bango mingi soki baboyi makambo na ye té.

[23] Pe bato oyo balandaka ye, nakosilisa bango na koboma; boye ba-Eklezya nyonso ekoyeba 'tè ngai nazali moto oyo atalaka na se ya mitema, pe ayebi makanisi ya bato. Bongo nakopesa moto na moto oyo ekoki na misala na ye.

[24] “Kasi bino bandimi ya Eklezya ya Tiatire, baoyo bolandaki mateya wana té, pe boboyi koyeba makambo oyo babengaka ‘basekelé ya Satan’, nakomemisa bino mokumba mosusu té.

[25] Eloko moko: bósimba makasi bomengo oyo bozali na yango, tii mokolo ngai nakoya.

[26] Bato oyo bakolonga pe bakozala kosalela mateya na ngai tii na suka, nakopesa bango bokonzi ya bikolo nyonso.

[27] Bakotambwisa yango na makasi penza; bakopanza yango lokola bilokú ya mabelé!

[28] Wana nde bokonzi ngai nazwá na Tata na ngai. Nakopesa bango monzoto oyo etanisaka tongo.

[29] “Moto oyo azali na matoi, áyoka malamu makambo Molimo alobi na ba-Eklezya.”

Koyebisa Basekelé — Chapters