Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:35

[1] Tango Mwana-Meme alongoli kashé ya sambo, Likolo efandi kimia penza soki ndambo ya ngonga moko.

[2] Bongo namoni ba-anjelu sambo batelemi na miso ya Nzambe; bapesi bango ba-kelelo sambo.

[3] Anjelu mosusu ayei kotelema penepene ya mesa ya or ya mabonza oyo ezali liboso ya Kiti ya bokonzi. Asimbi sani moko ya or oyo batumbelaka malasi, pe bapesi ye malasi ebele átumba yango likolo ya mesa, po milinga émata na miso ya Nzambe, nzela moko ná losambo ya bato nyonso ya bosantu.

[4] Boye milinga ya malasi elongwe na liboko ya anjelu, pe emati na Likolo na miso ya Nzambe, nzela moko ná losambo ya bato ya bosantu.

[5] Sima, anjelu akamati sani wana ya or, atondisi yango na móto oyo ezali na mesa ya mabonza, pe abwaki yango na se. Kake ná ba-móto na yango, pe mingongo ebimaki, pe mokili eninganaki.

[6] Ba-anjelu wana sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo, bamibongisi po na kobeta yango.

[7] Anjelu ya liboso abeti kelelo; mbula ya mabanga ná móto esangani na makila eyei kokweya na mokili. Ndambo moko ya mokili eziki; ndambo moko ya banzete eziki, ná matiti nyonso ya mobesu.

[8] Anjelu ya mibale abeti kelelo. Móto moko ya somo, oyo emonanaki lokola ngomba monene, eyei kokweya na mai ya ebale monene. Ndambo moko ya mai ebongwani makila;

[9] ndambo moko ya biloko nyonso ya bomoi oyo ezali na ebale ekufi; pe ndambo ya bamasuwa nyonso epanzani.

[10] Bongo anjelu ya misato abeti kelelo. Monzoto moko ya monene oyo ezali kopela móto euti na Likolo pe eyei kokweya na ndambo ya ba-ebale pe ya bisika mai ebimelaka.

[11] Kombo ya monzoto yango ezali “Bololo.” Ndambo moko ya mai ekómi bololo, pe bato mingi bakufaki po na mai wana ya bololo.

[12] Anjelu ya minei abeti kelelo. Ndambo moko ya moi ná ya sanza pe ya minzoto eyei koningana pe eyindi. Moi ezalaki kongenga té, bangonga minei mobimba; pe sanza ná minzoto ezalaki kongenga té na butu, bangonga minei mobimba.

[13] Natali lisusu, pe namoni kombekombe moko ezalaki kopumbwa na likolo penza, ezalaki koganga boye na mongongo ya makasi: “Mawa! Mawa! Mawa! Bato nyonso ya mokili bakozala na mawa koleka, tango ba-anjelu misato mosusu bakobeta bakelelo!”

Koyebisa Basekelé — Chapters