[1] Na liboko ya mobali ya Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi, namoni buku moko etondá banda na ebandeli tii na suka, bongo bakangá yango na basinga sambo oyo babetá kashé moko moko.
[2] Pe namoni anjelu moko ya nguya, azali koganga makasi penza: “Nani azali moto ya kokoka, po na kolongola ba-kashé pe kofungola buku yango?”
[3] Kasi na Likolo, na mokili, to na se ya mabelé, ata moto moko té akokaki kofungola buku wana to kotala yango na kati.
[4] Nalelaki mingi po moto moko té amonanaki oyo akokaki kofungola buku pe kotala yango na kati.
[5] Kasi moko na kati ya Bambuta-muntu alobi na ngai boye: “Kolela té. Tala, moto ya libota ya Yuda oyo babengaka ‘tambo ya Yuda' asi'alongá; azali moto ya libota ya David. Ye nde azali moto ya kokoka po na kolongola bakashé sambo pe kofungola buku.”
[6] Bongo namoni Mwana-Meme moko atelemi na kati ya Kiti ya bokonzi, pe ba-Sheriben wana minei ná Bambuta-muntu bazali epai na epai. Azalaki komonana lokola nde babomaki ye. Azalaki na maseke sambo pe miso sambo; yango ezali nde milimo sambo ya Nzambe oyo ye atindaka na mokili mobimba.
[7] Mwana-Meme apusani pe akamati buku oyo ezalaki na liboko ya mobali ya Moto afandi na Kiti.
[8] Tango akamati buku yango, ba-Sheriben wana minei pe Bambuta-muntu tuku mibale na minei (24) bafukami liboso ya Mwana-Meme. Moko moko na kati na bango azalaki na lindanda moko, pe sani ya or etondá na malasi; yango ezali losambo ya bato ya bosantu.
[9] Bazalaki koyemba nzembo moko ya sika: “Yo ozali moto ya kokoka po na kozwa buku oyo, pe kolongola ba-kashé oyo ezali kokanga yango. Pamba té babomaki yo, bongo na makila na yo osombelaki Nzambe bato ebele, ya mabota nyonso, ya minoko nyonso pe ya bamboka nyonso.
[10] Okómisi bango ekolo ya bakonzi, banganga-Nzambe oyo basalelaka Nzambe na biso. Bango nde bakozala kotambwisa mokili.”
[11] Natali lisusu pe nayoki mingongo ya ba-anjelu ebele; bazalaki bankoto na bankoto; batelemi epai na epai ya Kiti ya bokonzi. Bongo ba-Sheriben wana minei pe Bambuta-muntu
[12] bazalaki koyemba na mingongo makasi: “Mwana-Meme oyo babomaki, ye nde azali moto ya kokoka po na kozwa nguya pe bomengo, mayele, makasi, lokumu pe nkembo.”
[13] Nayoki pe makelele ya biloko nyonso oyo Nzambe asalá, na Likolo, na mokili, na se ya mabelé pe na kati ya ebale monene; yango nyonso ezalaki koyemba boye: “Nguya, lokumu pe nkembo ézala na Moto oyo afandi na Kiti ya bokonzi pe na Mwana-Meme, mikolo nyonso seko!”
[14] Ba-Sheriben minei bazongisi: “Amen!” Pe Bambuta-muntu bafukami bilongi na se.