Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:28

[1] Tango Yezu azalaki koleka na nzela, amoni moto moko akufá miso banda babotá ye.

[2] Bayekoli na ye batuni ye: “Moteyi, po na nini moto oyo abotamá na miso ya kokufa? Ezali po na masumu na ye moko to ya baboti na ye?”

[3] Yezu azongisi: “Ezali po na masumu na ye moko té to ya baboti na ye; kasi abotamá na miso ya kokufa, po mosala ya Nzambe émonana na ye.

[4] Tango ngai nazali awa na mokili, nazali moi po na bato. Lokola moi ezali nanu, esengeli násala misala ya Moto oyo atindaki ngai. Butu ezali koya, pe moto moko té akokoka lisusu kosala.”

[6] Sima ya maloba yango, Yezu abwaki soi na mabelé, asali mwa-ndambo ya potopoto, pe apakoli moto wana na miso.

[7] Bongo alobi na ye: “Kende kosukola elongi na liziba ya Siloé” (kombo wana elingi koloba: Atindami). Moto yango akei kosukola elongi, bongo tango azongi, abandi komona.

[8] Bato oyo bazalaki kofanda ná ye penepene, pe baoyo bamonaki ye tango azalaki kosenga mbongo, batunani: “Oyo ye té, moto azalaki kofanda pe kosenga bato mbongo?”

[9] Bato mosusu balobi: “Ezali ye.” Bamosusu balobi: “Té; kasi akokani na ye.” Bongo ye moko alobi: “Ezali ngai.”

[10] Batuni ye lisusu: “Ndenge nini sik'oyo okómi komona?”

[11] Azongiseli bango: “Moto oyo babengaka Yezu asalaki mwa-ndambo ya potopoto, apakoli ngai na miso pe alobi: ‘Kende kosukola elongi na Siloé.’ Tango nakei kosukola elongi kuna, nabandi komona.”

[12] Batuni ye: “Moto yango azali wapi?” Ye azongisi: “Nayebi té.”

[13] Bamemi moto oyo azalaki na miso ya kokufa epai ya ba-Farizé.

[14] Nzokande Yezu asalaki potopoto pe abikisaki moto yango na Mokolo ya Kopema.

[15] Yango wana ba-Farizé batuni ye ndenge nini abandaki komona. Azongiseli bango: “Atiaki ngai mwa-ndambo ya potopoto na miso, nasukoli elongi, pe nabandi komona.”

[16] Bongo ba-Farizé mosusu balobi: “Moto asali makambo ya ndenge oyo, azali moto ya Nzambe té, pamba té abuki mobeko ya Mokolo ya Kopema.” Kasi bamosusu balobi: “Ndenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi minene boye?” Yango wana bakabwanaki bango na bango.

[17] Ba-Farizé batuni ye lisusu: “Yo okanisi nini po na moto oyo abikisi yo?” Azongiseli bango: “Azali profete.”

[18] Bakonzi ya Bayuda bandimaki té 'tè azalaki na miso ya kokufa pe abandi komona, bongo babengisi baboti na ye.

[19] Batuni bango: “Oyo mwana na bino bolobaka 'tè abotamá na miso ya kokufa? Ndenge nini sik'oyo abandi komona?”

[20] Baboti na ye bazongisi: “Toyebi 'tè azali Mwana na biso, pe abotamá na miso ya kokufa.

[21] Kasi toyebi té ndenge nini abandi komona, pe nani moto abikisi ye. Bótuna ye; azali mokóló, akoloba na bino ye moko.”

[22] Baboti na ye balobaki bongo po bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda; pamba té bango bayokanaki boye: moto akondima 'tè Yezu azali Mesia, bakobengana ye na ndako ya lisanga.

[23] Yango wana baboti na ye balobaki: “Azali mokóló, bótuna ye.”

[24] Ba-Farizé babengi lisusu moto oyo azalaki na miso ya kokufa, balobi na ye: “Biso toyebi 'tè moto yango azali moto ya masumu. Ye atsiolaki Nzambe; kasi yo, kumisa Nzambe.”

[25] Moto wana azongiseli bango: “Nayebi té soki ye azali moto ya masumu. Kasi nayebi kaka likambo moko: nazalaki na miso ya kokufa, pe sik'oyo nazali komona.”

[26] Bango batuni ye: “Asalaki yo nini? Ndenge nini abikisi yo?”

[27] Ye azongisi: “Nasi'nayebisaki bino, kasi boyokelaki ngai té. Po na nini bolingi koyoka yango lisusu? Bino pe bolingi kokóma bayekoli na ye?”

[28] Bafingi ye balobi: “Yo moto ozali moyekoli na ye; kasi biso tozali bayekoli ya Moize.

[29] Biso toyebi 'tè Nzambe alobaki na Moize; kasi moto oyo, toyebi té soki auti wapi.”

[30] Moto wana azongiseli bango: “Oyo ezali penza likambo ya kokamwa! Bino boyebi epai ye auti té, kasi ye abikisi ngai!

[31] Toyebi 'tè Nzambe ayokelaka bato ya masumu té, kasi ayokelaka bobele moto oyo atosaka ye pe asalaka makambo ye alingaka.

[32] Toyoká nanu té 'tè babikisi moto abotamá na miso ya kokufa.

[33] Soki moto yango auti epai ya Nzambe té, akoki kosala ata eloko moko té.”

[34] Bango bazongiseli ye: “Yo moto obotamá penza na masumu, pe olingi koteya biso?” Bongo babengani ye na ndako ya lisanga.

[35] Yezu ayoki 'tè babengani moto wana. Akei kokutana na ye, pe atuni ye: “Ondimi Mwana ya Moto na motema na yo?”

[36] Moto wana azongiseli ye: “Mokonzi, yebisa ngai, ye azali nani po 'tè nándima ye.”

[37] Yezu alobi: “Omoni ye; ezali ngai moto nazali kosolola na yo.”

[38] Moto wana azongisi: “Mokonzi, nandimi.” Bongo afukameli ye.

[39] Sima, Yezu alobi: “Ngai nayaki awa na mokili po 'tè moto na moto ázwa oyo ekoki na ye: bato bakufá miso bámona, pe baoyo bazali komona, miso na bango ékufa.”

[40] Ba-Farizé mosusu oyo bazalaki wana bayoki maloba yango pe batuni ye: “Boni, biso pe tozali na miso ya kokufa?”

[41] Yezu azongiseli bango: “Soki bozalaki na miso ya kokufa, mbele bozalaki na masumu té; kasi awa bolobi ‘tozali komona’, bozali kaka bato ya masumu libela.”

Yoane — Chapters