[1] Sima na yango, Yezu azalaki kotambola na Galilé mobimba. Alingaki lisusu kotambola na rejion ya Yudea té, po Bayuda bazalaki koluka koboma ye.
[2] Feti ya Bayuda ya “Bandako ya Kapo” ekómaki penepene.
[3] Bandeko ya Yezu balobi na ye: “Kende na rejion ya Yudea, po bayekoli na yo bámona misala oyo yo ozali kosala.
[4] Moto moko té abombaka misala na ye, soki alingi bato nyonso báyeba ye. Lokola ozali kosala misala minene boye, sala yango na miso ya bato nyonso.”
[5] Ata bandeko ya Yezu pe bazalaki kondima ye té.
[6] Kasi Yezu alobi na bango: “Tango na ngai ekoki nanu té; kasi po na bino tango nyonso ezali malamu.
[7] Bato ya mokili bakoki koyina bino té, kasi bazali koyina nde ngai, po nazali kolakisa 'tè makambo bazali kosala ezali mabe.
[8] Bókende na bino na feti; kasi ngai nakokende té, po tango na ngai ekoki nanu té.”
[9] Sima ya koloba bongo, atikali na ye na Galilé.
[10] Tango bandeko ya Yezu basi'bakei na feti, ye pe alandi na kobombama; amimonisaki na miso ya bato té.
[11] Bayuda babandaki koluka ye na tango ya feti, pe batunani: “Azali wapi?”
[12] Bato bazalaki koloba mingi po na ye, kasi malembe. Bamosusu balobi: “Azali moto malamu”; nzokande bamosusu balobi: “Té, azali kokosa bato.”
[13] Kasi ata moto moko té amekaki koloba polele po na ye, pamba té bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda.
[14] Tango bakómaki na kati-kati ya mikolo ya feti, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe, pe abandi koteya.
[15] Bayuda bakamwaki mingi, pe batunani: “Ndenge nini moto oyo ayebi makambo ebele boye? Ye akotá ata kelasi té.”
[16] Yezu alobi na bango: “Makambo oyo nazali koteya bino, ezali ya ngai moko té, kasi euti na Moto oyo atindi ngai.
[17] Moto nyonso oyo azali na posa ya kosala makambo Nzambe alingi, ye nde akoyeba soki mateya na ngai euti na Nzambe, to na ngai moko.
[18] Moto oyo alobaka makambo euti na ye moko, alukaka lokumu na ye moko. Kasi oyo alukaka bobele lokumu ya moto oyo atindi ye, ye azali moto ya solo, alobaka lokuta ata moke té.
[19] Moize apesaká bino Mibeko, kasi ata moto moko té na kati na bino atosaka yango. Po na nini bozali koluka koboma ngai?”
[20] Bato bazongiseli ye: “Ozali na ndoki! Nani moto azali koluka koboma yo?”
[21] Yezu alobi na bango: “Kaka po na mosala moko nasalaki na Mokolo ya Kopema, bino nyonso bokamwe!
[22] Kasi bino moko bokataka bana mibali ata na Mokolo ya Kopema, po Moize atindá bákataka bango sima ya mikolo mwambe ya kobotama; nzokande ezali Moize té moto abandaki kokata bana, kasi ezali bakoko.
[23] Bakataka bana ata na Mokolo ya Kopema, po na kotosa Mibeko ya Moize; bongo po na nini bozali kosilika na ngai, awa nabikisi moto na Mokolo ya Kopema?
[24] Bótika kotalaka makambo na ndenge bino bozali komona na miso. Kasi bótalaka makambo na ndenge ya solo.”
[25] Bato mosusu ya Yeruzalem bazalaki kotunana: “Oyo ye té moto bazali koluka koboma?
[26] Tala azali koloba na miso ya bato nyonso, kasi balobi na ye ata eloko moko té! Yango bakonzi na biso basi'bandimi 'tè ye azali ya solo penza Mesia?
[27] Kasi tango Mesia akoya, moto moko té akoyeba soki auti wapi; nzokande moto oyo, toyebi epai auti.”
[28] Tango Yezu azalaki koteya na Ndako ya Nzambe, atuni bato na mongongo makasi: “Boyebi ngai ya solo? Pe boyebi epai nautaki? Nayaki na kombo na ngai moko té, kasi Moto oyo atindaki ngai azali solo. Bino boyebi ye té.
[29] Ngai nayebi ye malamu, po nauti epai na ye; ye moto atindi ngai.”
[30] Balukaki nzela ya kokanga Yezu; kasi ata moto moko té amekaki kosimba ye, po tango na ye ekokaki nanu té.
[31] Na kati ya bato wana, mingi bandimaki Yezu; bazalaki kotunana: “Boni? Tango Mesia akoya, akosala makamwisi mingi koleka ya moto oyo?”
[32] Ba-Farizé bayokaki makambo nyonso oyo bato bazalaki koyimayima po na Yezu. Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batindaki bakengeli ya Ndako ya Nzambe po bákende kokanga ye.
[33] Yezu alobi na bato: “Nakotikala na bino mwa-tango moke, bongo nakozonga epai ya Moto oyo atindaki ngai.
[34] Bokobanda koluka ngai, kasi bokomona ngai té, po bokoki kokende té na esika oyo ngai nakozala.”
[35] Bayuda, awa bayoki boye, babandi kotunana bango na bango: “Boni? Akokende wapi po tómona ye lisusu té? Akokende nde epai ya Bayuda oyo bapanzaná na bikolo mosusu, pe akoteya bato ya bikolo mosusu?
[36] Alobi 'tè tokobanda koluka ye kasi tokomona ye té, po tokoki kokende té na esika oyo ye akozala. Makambo yango elingi kolakisa nini?”
[37] Mokolo ya suka ya feti ezalaki mokolo oyo eleki monene. Yezu atelemi na kati ya bato, abandi koloba na bango na mongongo makasi: “Moto oyo azali na posa ya mai, pe andimeli ngai, áya komela mai epai na ngai. Bakòmá na Mikanda ya Nzambe: ‘Mai ya bomoi ekobanda kobima na motema na ye lokola ebale.’”
[39] Yezu azalaki koloba bongo po na Molimo ya Nzambe oyo bato bakondima ye bakozwa. Na tango wana, Molimo ayaki nanu té, po Yezu azwaki nanu lokumu na ye té.
[40] Na kati ya bato oyo bayokaki maloba ya Yezu, bamosusu balobi: “Ya solo, ye azali Profete oyo tozalaki kozela”;
[41] bamosusu: “Azali Mesia.” Kasi bato mosusu balobi boye: “Mesia akoki nde kouta na Galilé?
[42] Ekòmamá na Mikanda 'tè Mesia akozala moto ya libota ya David, pe akouta na Betleem, mboka ya David.”
[43] Boye bato bayei kokabwana likolo ya Yezu.
[44] Na kati ya baoyo bazalaki na posa ya kokanga ye, ata moto moko té amekaki kosimba ye.
[45] Tango bakengeli bazongi, bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé batuni bango: “Po na nini boyei na ye té?”
[46] Bakengeli bazongisi: “Nanu moto moko té asi'alobá lokola moto yango.”
[47] Ba-Farizé batuni bango: “Bino pe bondimi lokuta na ye?
[48] Na kati ya bakonzi to ya ba-Farizé ezali na moto moko oyo andimeli ye?
[49] Kasi bato pamba wana oyo bayebi Mibeko ya Moize té, Nzambe asi'asundolá bango kala.”
[50] Nikodeme pe azalaki na kati ya ba-Farizé wana; mokolo moko ye akendeki kotala Yezu. Alobi na bango:
[51] “Na Mibeko na biso, tokoki kokatela moto etumbu té, soki nanu toyoki ye té po tóyeba likambo ye asali.”
[52] Bazongiseli ye: “Yo pe ozali moto ya Galilé? Kende kotanga Mikanda ya Nzambe, pe okomona 'tè ata profete moko té asi'autá na Galilé.”
[53] [Sima na yango, bato nyonso bapanzani, pe moto na moto azongi na ndako na ye.