Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:48

[1] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, akei ná bayekoli na ye na ngambo ya mai ya Sedron, esika elanga moko ezalaki. Akoti ná bango kuna.

[2] Yudas oyo atekaki ye, ayebaki esika yango; pamba té Yezu ná bayekoli na ye bamesanaki kosangana kuna.

[3] Yango wana Yudas pe akei kuna ná basoda pe bakengeli ya Ndako ya Nzambe oyo bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki ye. Bazalaki na bibundeli na maboko, ná bamwinda pe banzete ezali kopela.

[4] Yezu ayebaki makambo nyonso ekokweela ye, yango wana akei epai na bango, pe atuni: “Bozali koluka nani?”

[5] Bazongiseli ye: “Yezu ya Nazaret.” Yezu alobi na bango: “Ngai oyo.” Yudas, oyo atekaki ye, azalaki na kati na bango.

[6] Tango Yezu alobi na bango: “Ngai oyo,” bazongi sima, pe bakwei na mabelé.

[7] Yezu atuni bango lisusu: “Bozali koluka nani?” Balobi na ye: “Yezu ya Nazaret.”

[8] Yezu azongiseli bango: “Nasi'nalobaki na bino 'tè ezali ngai; bongo soki bozali koluka ngai, bótika bato oyo bákende.”

[9] Alobi bongo po na kokokisa makambo oyo ye alobaki liboso: “Tata, nabungisi ata moto moko té na kati ya bato oyo opesaki ngai.”

[10] Simon Piere azalaki na mbeli, abimisi yango, akati mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe litoi oyo ezalaki na liboko ya mobali. Kombo ya moto yango Malkus.

[11] Kasi Yezu alobi na Piere: “Zongisa mbeli na yo na mokaba. Ezali Tata na ngai moto apesi ngai kopo oyo ya pasi; bongo olingi námela yango té?”

[12] Basoda ná mokonzi na bango, pe bakengeli ya Bayuda bakamati Yezu pe bakangi ye singa.

[13] Bamemi ye liboso epai ya Hana, pamba té ye azalaki tata ya mwasi ya Kaife, oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana.

[14] Ezali Kaife moto alobaki na Bayuda 'tè: “Malamu moto moko kaka ákufa po na bato nyonso.”

[15] Simon Piere ná moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yezu na sima. Moyekoli mosusu wana ayebanaki ná nganga-Nzambe monene, yango wana akotaki nzela moko ná Yezu na lopango ya nganga-Nzambe monene,

[16] kasi Piere atikalaki na libanda penepene ya porte ya lopango. Moyekoli oyo ayebanaki ná nganga-Nzambe monene abimi; akei koloba na mwasi oyo azalaki kokengela porte ya lopango, pe akotisi Piere.

[17] Mwasi yango atuni Piere: “Yo pe ozali moyekoli ya moto wana té?” Piere azongiseli ye: “Té, ngai té.”

[18] Lokola malili ezalaki makasi, basali ná bakengeli bapelisaki móto pe bafandaki esika moko po na koyotela. Piere pe akei koyotela esika moko ná bango.

[19] Nganga-Nzambe monene atuni Yezu mituna po na bayekoli na ye pe mateya na ye.

[20] Yezu azongiseli ye: “Ngai nazalaki kosakola polele na miso ya bato nyonso. Mikolo nyonso nazalaki koteya na bandako ya lisanga pe na Ndako ya Nzambe, esika Bayuda nyonso basanganaka. Nalobaki likambo moko té na kobombama.

[21] Po na nini ozali kotuna ngai? Tuna bato oyo bayokaki maloba na ngai; bango bayebi malamu makambo nazalaki koloba.”

[22] Tango Yezu alobi bongo, mokengeli moko azalaki wana, abeti ye mbata pe agangeli ye: “Ozali kozongisa ndenge wana na nganga-Nzambe monene?”

[23] Yezu azongiseli ye: “Soki nalobi mabe, lakisa ngai mabe yango; kasi soki nalobi malamu, po na nini obeti ngai?”

[24] Hana atindi Yezu epai ya Kaife, nganga-Nzambe monene. Yezu azalaki kaka ya kokangama na singa.

[25] Na tango wana Simon Piere azalaki kaka koyotela móto. Bato bazalaki wana batuni ye: “Yo pe ozali moyekoli na ye té?” Kasi Piere awangani, azongisi: “Té, ngai té!”

[26] Mosali moko ya nganga-Nzambe monene, ndeko ya moto oyo Piere akataki litoi, alobi: “Ezali ya solo, ngai namonaki yo na elanga, esika moko ná ye!”

[27] Kasi Piere awangani lisusu. Kaka na tango wana soso eleli.

[28] Na tongo penza, balongwe na ndako ya Kaife, bamemi Yezu na ndako ya Pilate, motambwisi ya rejion. Bayuda baboyi kokota na ndako ya motambwisi ya rejion, po bábebisa ekila té, bongo bákoka kolia mwana-meme ya feti ya Koleka.

[29] Yango wana Pilate abimi, pe akei epai na bango. Bongo atuni bango: “Likambo nini boyei kofundela moto oyo?”

[30] Bango bazongiseli ye: “Soki ye azalaki moto ya mabe té, mbele toyei na ye epai na yo té.”

[31] Pilate alobi na bango: “Soki bongo, bino moko bókamata ye pe bósambisa ye ndenge Mibeko na bino ezali kotinda.” Bayuda bazongiseli ye: “Biso tozali na bokonzi ya kobomisa moto té.”

[32] Boye bakokisi makambo Yezu alobaki, tango alakisaki ndenge nini akokufa.

[33] Pilate akoti lisusu na ndako, abengi Yezu pe atuni ye: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?”

[34] Yezu azongiseli ye: “Likambo wana otuni ngai, ezali yo moko moto okanisi yango, to bato mosusu bato bayebisi yo yango po na ngai?”

[35] Pilate atuni: “Ngai nazali Moyuda? Ezali bandeko na yo moko ná bakonzi ya banganga-Nzambe bato bayei kotika yo epai na ngai. Yo osali nini?”

[36] Yezu azongiseli ye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té. Soki ezalaki ya mokili oyo, mbele bato na ngai balingaki kobundela ngai po nákweya na maboko ya Bayuda té. Kasi bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té.”

[37] Pilate atuni ye lisusu: “Bongo yo ozali penza mokonzi?” Yezu azongisi: “Yo moko olobi 'tè nazali mokonzi. Nabotamaki pe nayaki awa na mokili po násakola makambo ya solo. Moto nyonso oyo alukaka makambo ya solo, andimaka maloba na ngai.”

[38] Pilate atuni ye: “Solo ezali nini?” Sima ya maloba wana, Pilate abimi lisusu na libanda epai ya Bayuda. Alobi na bango: “Namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu.

[39] Kasi bomeseni 'tè nábimisela bino moto moko ya boloko na feti ya Koleka. Sik'oyo bolingi nábimisela bino mokonzi ya Bayuda?”

[40] Bango nyonso babandi koganga, balobi: “Ye té! Tolingi Barabas!” Nzokande Barabas azalaki moyibi.

Yoane — Chapters