[1] Bongo Yezu alobi lisusu: “Nazali koloba na bino, ya solo: soki moto akoti na lopango ya bameme na porte na yango té, kasi na esika mosusu, ye azali moyibi pe mobebisi.
[2] Kasi moto oyo akotaka na porte, ye azali mobokoli ya bameme.
[3] Mokengeli afungolelaka ye lopango, pe bameme eyokaka mongongo na ye. Ye abengaka bameme na ye moko moko na kombo na yango, pe abimisaka yango na libanda.
[4] Soki abimisi yango nyonso alekaka na liboso, pe bameme elandaka ye, po eyebi mongongo na ye.
[5] Kasi elandaka mopaya té; kutu ekimaka ye, po eyebi mongongo na ye té.”
[6] Yezu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki tina ya maloba na ye té.
[7] Yezu alobi lisusu: “Nazali koloba na bino, ya solo: ngai nazali lokola porte ya lopango ya bameme.
[8] Bato nyonso oyo bayaki liboso na ngai bazalaki bamiyibi pe babebisi; yango wana bameme ezalaki koyokela bango té.
[9] Ngai nazali porte ya lopango. Moto oyo akotaka epai na ngai, akobika; akoki kokota pe kobima, pe akozwa bilei.
[10] Moyibi ayaka kaka po na koyiba, koboma pe kobebisa. Kasi ngai nayei po bato bázala na bomoi, pe bázala na yango mingi koleka.
[11] “Ngai nazali mobokoli malamu ya bameme. Mobokoli malamu apesaka bomoi na ye po na bameme na ye.
[12] Moto oyo asalaka po na mbongo azali mobokoli penza té, azali pe kolo ya bameme té. Soki amoni nkoi ezali koya, atikaka bameme pe akimaka, bongo nkoi ekangaka bameme pe epanzaka yango.
[13] Pamba té, ye asalaka po na mbongo, pe ayokelaka bameme mawa té.
[14] Ngai nazali mobokoli malamu. Nayebi bameme na ngai pe yango eyebi ngai,
[15] bobele ndenge Tata ayebi ngai pe ngai nayebi ye. Nakopesa bomoi na ngai po na bameme na ngai.
[16] “Nazali pe na bameme mosusu, ezali ya lopango oyo té; esengeli nátambwisa yango pe, bongo ekobanda koyoka mongongo na ngai. Boye bameme nyonso ekozala esika moko, na maboko ya mobokoli se moko.”
[17] “Tata alingi ngai, po nakopesa bomoi na ngai po 'tè názwa yango lisusu.
[18] Moto moko té akobotola bomoi na ngai, kasi ngai moko nde moto nakopesa yango na bolingo na ngai. Nazali na nguya ya kopesa yango, pe ya kozwa yango lisusu. Tata atindaki ngai násala ndenge wana.”
[19] Bayuda bakabwani lisusu po na maloba yango.
[20] Bato mingi na kati na bango balobi: “Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Po na nini bozali koyoka ye?”
[21] Kasi bato mosusu balobi: “Moto azali na molimo mabe alobaka ndenge wana té. Yango molimo mabe ekoki kobikisa bato bakufá miso?”
[22] Na mikolo wana feti ezalaki na Yeruzalem, babandaki kokanisa mokolo bafungolaká Ndako ya Nzambe. Na tango wana malili ezalaki mingi.
[23] Yezu azalaki kotambola na Ndako ya Nzambe, na veranda ya Salomon.
[24] Bongo Bayuda bayei kozinga ye, pe batuni ye boye: “Tango nini okokitisa biso mitema? Yebisa biso polele soki ozali Mesia.”
[25] Yezu azongiseli bango: “Nasi'nayebisaki bino yango, kasi bondimelaki ngai té. Misala oyo nazali kosala na nguya ya Tata na ngai, nde ezali kolakisa bino yango.
[26] Kasi bino bozali kondima té po bozali bameme na ngai té.
[27] Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai; nayebi yango pe yango elandaka ngai.
[28] Napesi yango bomoi ya seko; bongo yango ekobeba ata mokolo moko té. Moto moko té akoki kobotola yango na maboko na ngai,
[29] pamba té ezali Tata na ngai moto apesi ngai yango. Ye azali na nguya nyonso, boye moto moko té akoki kobotola eloko na maboko na ye.
[30] Ngai ná Tata tozali se moto moko.”
[31] Bayuda balokoti lisusu mabanga po na koboma ye.
[32] Yezu alobi na bango: “Nasali misala mingi ya malamu na miso na bino, na makasi ya Tata. Po na mosala nini bolingi koboma ngai?”
[33] Bayuda bazongiseli ye: “Tolingi koboma yo po na mosala ya malamu té, kasi po ozali kotsiola Nzambe. Pamba té ozali kaka moto, kasi olobi 'tè ozali Nzambe.”
[34] Yezu alobi na bango: “Na Mibeko na bino ekòmamá boye: ‘Nalobi: bozali banzambe.’
[35] Ya solo, bato oyo bazalaki koyoka maloba na ye, Nzambe abengaka bango ‘banzambe’. Makambo ekòmamá na Mikanda ya Nzambe ekoki kolongwa té.
[36] Nzokande Nzambe aponá ngai moto na ye, pe atindi ngai na mokili, yango wana nalobi 'tè nazali Mwana ya Nzambe. Ndenge nini bozali koloba 'tè natsioli Nzambe?
[37] Soki nasalaka misala ya Tata na ngai té, bóndimela ngai té.
[38] Kasi soki nasalaka yango, atako bolingi kondimela ngai té, bóndima po na misala na ngai. Bongo bóyeba libela 'tè Tata azali na ngai, pe ngai nazali na Tata.”
[39] Bayuda baluki kokanga ye lisusu, kasi bazwaki ye té.
[40] Yezu akei na ngambo ya Yordan pe atikalaki kuna, na esika Yoane azalaká kobatisa bato kala.
[41] Bato mingi bayei epai na ye pe balobi: “Yoane asalaká likamwisi moko té, kasi makambo nyonso ye alobaká po na moto oyo ezali ya solo.”
[42] Pe kuna, bato mingi bandimaki Yezu.