[1] Sima na yango, feti moko ya Bayuda ezalaki, bongo Yezu akei na Yeruzalem.
[2] Liziba moko ya mai ezalaki kuna penepene ya Porte-ya-Bameme; na monoko ya Bayuda babengaka yango Betzata; ezalaki na baveranda mitano.
[3] Na baveranda yango, bato mingi ya maladi bazalaki kolala wana na se: bato bakufá miso, bato ya tengutengu, ná baoyo bakufá makolo. [Bazalaki kozela 'tè mai éningana,
[4] pamba té tango mosusu anjelu ya Nzambe azalaki koya na liziba po na koningisa mai. Tango mai ekoningana, moto oyo akokota na liziba liboso akobika, ata kutu maladi na ye ezalaki ya ndenge nini.]
[5] Moto moko azalaki wana aumeli na maladi mbula tuku misato na mwambe (38).
[6] Tango Yezu amoni ye, pe lokola ayebaki 'tè aumeli penza na maladi, atuni ye: “Olingi kobika?”
[7] Moto wana azongiseli ye: “Tata, nazali na moto té oyo akoki kokitisa ngai na liziba, soki mai eningani. Tango nalingi kokita na mai, moto mosusu asi'akiti kala.”
[8] Yezu alobi na ye: “Telema, kamata etoko na yo pe tambola.”
[9] Na mbala moko, moto ya maladi abiki; akamati etoko na ye pe abandi kotambola. Makambo yango esalamaki na Mokolo ya Kopema.
[10] Yango wana Bayuda balobi na moto oyo abikaki: “Lelo ezali Mokolo ya Kopema; okoki komema etoko na yo té.”
[11] Ye azongisi: “Moto oyo abikisi ngai, alobi na ngai: Kamata etoko na yo pe tambola.”
[12] Bongo batuni ye: “Nani moto alobaki na yo: Kamata etoko na yo pe tambola?”
[13] Kasi moto oyo abikaki ayebaki té soki nani moto abikisaki ye; po Yezu akotaki na kati ya bato bazalaki wana.
[14] Sima na yango, Yezu akutani na ye na Ndako ya Nzambe, alobi na ye: “Yoka malamu, sik'oyo obiki; kosala lisusu masumu té, po likambo ya mabe koleka ékweela yo té.”
[15] Moto wana akei epai ya Bayuda, alobi: “Ezali Yezu moto abikisi ngai.”
[16] Yango wana Bayuda babandi kotungisa Yezu, po asalaki likambo yango na Mokolo ya Kopema.
[17] Kasi Yezu alobi na bango: “Tata na ngai asalaka tango nyonso; ngai pe nasalaka lokola ye.”
[18] Yango wana Bayuda bakómaki koluka nzela ya koboma Yezu, po abukaki kaka mobeko ya Mokolo ya Kopema té, kasi alobaki lisusu 'tè Nzambe azali Tata na ye penza, lokola nde ye akokani na Nzambe.
[19] Sik'oyo Yezu azongiseli bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: Mwana asalaka eloko té na makasi na ye moko, kasi asalaka makambo oyo amonaka epai ya Tata na ye. Makambo nyonso oyo Tata asalaka, Mwana pe asalaka yango.
[20] Pamba té Tata alingi Mwana, yango wana alakisaka ye makambo nyonso oyo ye asalaka. Akolakisa ye pe makambo mosusu eleki oyo na monene, pe bokokamwa po na yango.
[21] Ndenge Tata azongisaka na bomoi bato oyo bakufá, se bongo Mwana pe, apesaka bomoi na bato oyo alingi.
[22] Tata akosambisa moto moko té, kasi asi'apesá bokonzi nyonso na maboko ya Mwana, po ásambisa bato.
[23] Tata alingi bato nyonso bákumisa Mwana, bobele ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana té, akumisaka pe Tata té, oyo atindaki ye.
[24] “Nazali koloba na bino, ya solo: bato nyonso oyo bayokaka maloba na ngai, pe bandimelaka Moto oyo atindaki ngai, bazali na bomoi ya seko. Bakokatela bango etumbu té, kasi basi'balongwe na liwa pe bazwi bomoi ya seko.
[25] Nazali koloba na bino, ya solo: tango ezali koya pe esi'ekoki, oyo bato bakufá bakoyoka mongongo ya Mwana ya Nzambe, pe baoyo bakoyoka yango bakozwa bomoi.
[26] Pamba té lokola bomoi nyonso ezali na maboko ya Tata, ye atie yango pe na maboko ya Mwana.
[27] Apesi Mwana bokonzi ya kosambisa bato, pamba té azali Mwana ya Moto.
[28] Bókamwa té, pamba té, tango ezali koya oyo bato nyonso bakundamá na simetiere bakoyoka mongongo na ye
[29] pe bakobima. Bato oyo basalaki malamu bakosekwa, po na kozwa bomoi; kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa po na kozwa etumbu.”
[30] “Ngai nakoki kosala eloko moko té na makasi na ngai. Nakataka makambo ya bato ndenge Nzambe alobaka na ngai. Nakataka yango malamu, po nasalaka té ndenge ngai nalingi, kasi ndenge Oyo atindaki ngai alingi.
[31] Soki nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali pamba;
[32] kasi moto mosusu nde alobaka po na ngai, pe nayebi 'tè makambo oyo ye alobaka po na ngai ezali ya solo.
[33] Bino botindaki bato epai ya Yoane, pe ye alobaki maloba ya solo po na ngai.
[34] Ngai nazali koluka bato té po báloba makambo na ngai; kasi nalobi bongo po bino bóbika.
[35] Yoane azalaki lokola mwinda oyo ezali kopela pe kongenga; bino bondimaki kosepela na yango mwa-tango moke.
[36] Kasi misala na ngai eleki maloba Yoane alobaki po na ngai. Misala oyo nasalaka, Tata nde apesi ngai nguya po násala yango; yango elakisi 'tè Tata moto atindi ngai.
[37] Tata oyo atindi ngai, ye moko azali koloba po na ngai. Nanu boyoká mongongo na ye té, nanu pe bomoná elongi na ye té.
[38] Maloba na ye ekoteli bino té, pamba té boboyi kondimela moto oyo ye atindi.
[39] Botangaka Mikanda ya Nzambe tango nyonso, po bokanisi 'tè bokozwa na yango bomoi ya seko; nzokande yango ezali koyebisa bino makambo na ngai.
[40] Kasi bino bolingi koya epai na ngai té po na kozwa bomoi ya seko.
[41] “Nalukaka lokumu epai ya bato té.
[42] Kasi nayebi bino: bozali na bolingo ya Nzambe té na mitema na bino.
[43] Ngai nayei na kombo ya Tata na ngai, pe bino bolingi koyamba ngai té. Kasi soki moto ayei na kombo na ye moko, boyambaka ye.
[44] Bino bolingaka kozwa lokumu epai ya baninga na bino, kasi lokumu oyo eutaka bobele na Nzambe, bolukaka yango té. Bongo ndenge nini bokoki kondima?
[45] Bókanisa té 'tè ngai nakofunda bino epai ya Tata na ngai; ezali nde Moize moto akofunda bino, po ye azali moto oyo botielaka mitema.
[46] Soki bondimelaki Moize ya solo, mbele pe bolingaki kondimela ngai, pamba té Moize akòmaká makambo etali ngai.
[47] Kasi lokola bozali kondima té makambo ye akòmaká, ndenge nini bokoki kondima maloba na ngai?”