Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:56

[1] Yezu abakisi alobi: “Bózala mitema likolo té. Bóndima Nzambe, bóndima pe ngai.

[2] Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi; nakei kobongisela bino yango. Soki ezalaki bongo té, mbele nalingaki kolobela bino yango té.

[3] Bongo, soki nakei kobongisela bino esika, nakoya lisusu kokamata bino, po bino pe bózala esika ngai nazali.

[4] Boyebi esika ngai nakokende, pe boyebi nzela na yango.”

[5] Toma alobi na ye: “Mokonzi, esika yo ozali kokende, biso toyebi yango té. Ndenge nini tokoki koyeba nzela?”

[6] Yezu alobi na ye: “Ngai nazali nzela, nazali solo, pe nazali bomoi. Moto moko té akoki kokende epai ya Tata soki aleki epai na ngai té.

[7] Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai. Banda sik'oyo boyebi ye, pe bomoni ye.”

[8] Filipe alobi na ye: “Mokonzi, lakisa biso Tata, bongo tokoluka eloko mosusu té.”

[9] Yezu azongiseli ye: “Filipe, banda kala nazali na bino, bongo oyebi ngai té? Moto oyo amoni ngai amoni pe Tata. Ndenge nini olobi: ‘Lakisa biso Tata?’

[10] Ozali kondima té 'tè ngai nazali na Tata, pe Tata azali na ngai? Makambo nyonso nazali koloba na bino eutaka na ngai moko té, kasi Tata oyo azali na ngai, ye nde moto azali kosala misala na ye.

[11] Bóndima maloba na ngai, ngai nazali na Tata, pe Tata azali na ngai. Soki bondimi bongo té, bóndima ata po na misala wana.

[12] Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimi ngai, akosala pe misala oyo ngai nasalaka. Akosala kutu makambo eleki minene, pamba té ngai nazali kokende epai ya Tata.

[13] Makambo nyonso bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango, po 'tè Tata ázwa lokumu po na Mwana.

[14] Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango.”

[15] “Soki bolingaka ngai, bokotosa mibeko na ngai.

[16] Bongo nakosenga Tata, pe ye akopesa bino Mosalisi mosusu, po ázala na bino seko.

[17] Ye nde Molimo, oyo ayebisaka makambo nyonso Nzambe azali kolakisa. Bato ya mokili bakoki kozwa ye té, po bamoni ye té, pe bayebi ye té. Kasi bino boyebi ye, po azalaka na bino, pe azali na kati ya mitema na bino.

[18] “Nakotika bino lokola bana etike té; nakozonga epai na bino.

[19] Etikali moke, bato ya mokili bakomona ngai lisusu té. Kasi bino bokomona ngai, po ngai nazali na bomoi, bino pe bokozala na bomoi.

[20] Soki tango wana ekoki, bokoyeba 'tè ngai nazali na Tata na ngai, bino bozali na ngai, pe ngai nazali na bino.

[21] “Moto oyo ayebi mibeko na ngai pe atosaka yango, ye nde moto alingi ngai. Tata na ngai akolinga moto oyo alingaka ngai; ngai pe nakolinga ye, pe nakomimonisa epai na ye.”

[22] Yudas (kasi Yudas Iskariot té) atuni ye: “Mokonzi, po na nini okomimonisa epai na biso kasi na bato ya mokili té?”

[23] Yezu azongiseli ye: “Soki moto alingi ngai, akobanda kotosa maloba na ngai. Tata na ngai pe akolinga ye, bongo ngai ná Tata tokoya kofanda epai na ye.

[24] Moto oyo alingi ngai té, atosaka maloba na ngai té. Mateya oyo bino bozali koyoka ezali ya ngai té, kasi ezali nde ya Tata oyo atindaki ngai.

[25] “Nalobi na bino makambo oyo tango nazali nanu na kati na bino.

[26] Kasi Molimo Mosantu, Mosalisi oyo Tata akotindela bino na kombo na ngai, akolakisa bino makambo nyonso pe akopesa bino mayele, po bókanisaka makambo nyonso oyo nalobaki na bino.

[27] “Natikeli bino boboto; boboto na ngai moko nde nakopesa bino. Nakopesa bino yango té ndenge bato ya mokili bapesaka. Bózala mitema likolo té, pe bóbanga té.

[28] Boyokaki 'tè nalobaki na bino: ‘Nakei, kasi nakozonga epai na bino.’ Soki bolingi ngai, bokosepela po nazali kokende epai ya Tata, pamba té Tata aleki ngai.

[29] Nayebisi bino makambo yango sik'oyo, liboso 'tè ésalama; po tango ekosalama, bóndimela ngai.

[30] Nakolobela bino lisusu makambo mingi té, pamba té mokonzi ya mokili oyo azali koya. Akoki kosala ngai eloko té;

[31] kasi nyonso ekosalama po bato ya mokili báyeba 'tè nalingaka Tata, pe nasalaka ndenge ye atindaki ngai. Bótelema, tólongwa awa.”

Yoane — Chapters