[1] Moto moko kombo na ye Lazare azalaki na maladi na Betanie, mboka ya Maria ná ndeko na ye Marte.
[2] (Maria azali mwasi oyo apakolaki Mokonzi malasi na makolo, pe apangusaki yango na suki na ye, bongo ndeko na ye Lazare moto azalaki na maladi.)
[3] Bandeko na ye mibale ya basi batindi moto ákende koyebisa Yezu 'tè: “Mokonzi, moto oyo yo olingaka azali na maladi.”
[4] Kasi tango Yezu ayoki sango yango, alobi: “Lazare azali na maladi, kasi akokufa té; wana ezali kaka po lokumu ya Nzambe émonana, pe po Mwana ya Nzambe ázwa lokumu po na yango.”
[5] Yezu azalaki kolinga Marte ná ndeko na ye Maria, ná Lazare.
[6] Tango ayoki 'tè Lazare azali na maladi, aumeli lisusu mikolo mibale na esika ye azalaki.
[7] Sima na yango alobi na bayekoli na ye: “Tózonga na rejion ya Yudea.”
[8] Bayekoli bazongiseli ye: “Moteyi, bobele sik'oyo Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, pe olingi kozonga lisusu kuna?”
[9] Yezu alobi na bango: “Mokolo moko ezali na bangonga zomi na mibale té? Soki moto atamboli na moi, akoki kobeta libaku té po azali komona polele.
[10] Kasi soki moto atamboli na butu akobeta mabaku, po azali komona té.”
[11] Sima ya maloba wana, Yezu abakisi lisusu: “Moninga na biso Lazare alali pongi, kasi nakei kolamusa ye.”
[12] Bayekoli bazongiseli ye: “Mokonzi, soki alali pongi akobika.”
[13] Kasi kolala oyo Yezu alobaki ezali liwa; nzokande bayekoli bakanisaki 'tè ezalaki bobele pongi.
[14] Bongo Yezu alobi na bango polele: “Lazare akufi.
[15] Nazali na esengo po na bino, po ngai nazalaki kuna té; boye bokondima ngai. Kasi tókende kuna epai na ye.”
[16] Bongo Toma oyo babengaka Mapasa alobi na bayekoli mosusu: “Biso nyonso tókende kokufa ná Moteyi esika moko.”
[17] Tango Yezu akómi, akuti basi'bakundi Lazare eleki mikolo minei.
[18] Kolongwa Betanie tii na Yeruzalem ezali na bakilometre soki misato pamba,
[19] yango wana Bayuda ebele bayaki epai ya Maria ná Marte kolongola bango mawa po na liwa ya ndeko na bango Lazare.
[20] Tango Marte ayoki 'tè Yezu azali koya, akei koyamba ye na nzela, kasi Maria atikalaki na ndako.
[21] Marte alobi na Yezu: “Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té.
[22] Kasi nayebi 'tè ata sik'oyo Nzambe akopesa yo makambo nyonso oyo okosenga epai na ye.”
[23] Yezu alobi na ye: “Ndeko na yo akosekwa.”
[24] Marte azongiseli ye: “Nayebi 'tè akosekwa tango Nzambe akosekwisa bato, na mokolo ya suka.”
[25] Yezu alobi na ye: “Ngai nazali mosekwisi pe napesaka bomoi. Moto oyo andimi ngai akozala na bomoi ata soki akufi.
[26] Moto nyonso oyo azali na bomoi na ndenge andimeli ngai, akokufa ata mokolo moko té. Ondimi yango?”
[27] Marte azongisi: “Ee, Mokonzi, nandimi 'tè ozali Mesia, Mwana ya Nzambe, oyo toyebaki 'tè akoya na mokili.”
[28] Tango Marte asilisi koloba bongo, akei kobenga ndeko na ye Maria, pe alobi na ye na litoi: “Moteyi asi'ayei, azali kobenga yo.”
[29] Awa Maria ayoki boye, atelemi pe akei mbangu epai ya Yezu.
[30] Yezu akómaki nanu na mboka té; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na ye.
[31] Bayuda oyo bazalaki ná Maria na kati ya ndako po na kolongola ye mawa, bamonaki 'tè atelemi mbangu pe abimi na libanda; bongo balandi ye po bakanisaki 'tè akei kolela na simetiere.
[32] Awa Maria akómi esika Yezu azalaki, akwei na makolo na ye, pe alobi na ye: “Mokonzi, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki té.”
[33] Tango Yezu amoni Maria azali kolela, pe bato oyo bayaki na ye bazali kolela lisusu, ayoki mawa mingi pe pasi na motema.
[34] Atuni bango: “Esika nini bokundaki ye?” Bazongiseli ye: “Mokonzi, yaka kotala.”
[35] Yezu aleli.
[36] Bayuda balobi: “Tala, azalaki kolinga ye mingi!”
[37] Kasi bato mosusu balobi: “Ye moto abikisaki moto oyo azalaki na miso ya kokufa. Bongo akokaki pe kopekisa liwa ya Lazare té?”
[38] Yezu ayokaki mawa mingi na motema, pe akei na simetiere. Ezalaki libulu na kati ya mabanga, pe na monoko na yango batiaki libanga ya monene.
[39] Yezu alobi: “Bólongola libanga.” Kasi Marte, ndeko ya moto oyo akufaki, alobi na ye: “Mokonzi, azali kolumba sòlo, pamba té asi'asali mikolo minei na libulu.”
[40] Yezu azongiseli ye: “Soki ondimi, okomona lokumu ya Nzambe. Nalobaki boye té?”
[41] Na sima balongoli libanga. Yezu atomboli miso na likolo, alobi: “Tata, napesi yo mersi po oyokeli ngai.
[42] Nayebi 'tè oyokelaka ngai tango nyonso, kasi nazali koloba boye po na bato oyo bazali awa ná ngai, bándima 'tè yo moto otindi ngai.”
[43] Sima ya maloba wana, agangi na mongongo makasi: “Lazare, bima!”
[44] Moto oyo akufaki abimi; makolo ná maboko ezalaki ya kokangama, pe elongi na ye elíngamaki na elamba. Yezu alobi na bango: “Bófungola ye pe bótika ye átambola.”
[45] Bato mingi na kati ya Bayuda oyo bayaki epai ya Maria bandimaki Yezu po bamonaki makambo asalaki.
[46] Kasi bato mosusu na kati na bango bakei koyebisa na ba-Farizé makambo oyo Yezu asalaki.
[47] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé babengisi bato nyonso ya Likita-Monene, pe balobani boye: “Tokosala nini? Moto oyo azali kosala makamwisi mingi!
[48] Soki totiki ye ásalaka kaka boye, bato nyonso bakondima ye, pe bakonzi ya Rome bakoya koboma Ndako ya Nzambe na biso, pe ekolo na biso.”
[49] Moto moko na kati na bango kombo na ye Kaife, oyo azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, alobi: “Bino bozali na mayele té!
[50] Boyebi té 'tè ebongi malamu moto moko ákufa po na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ébeba té?”
[51] Alobaki makambo wana na makanisi na ye moko té, kasi lokola azalaki nganga-Nzambe monene na mbula wana, asakoli 'tè Yezu akokufa po na ekolo mobimba.
[52] Ya solo, Yezu akufaki kaka po na ekolo ya Bayuda té, kasi po na kosangisa bana ya Nzambe nyonso oyo bapanzaná na mokili mobimba.
[53] Banda mokolo wana, bakonzi ya Bayuda bakati 'tè báboma Yezu.
[54] Yango wana Yezu abandaki komonana lisusu na miso na bango té. Akei na mboka moko penepene ya esobe, kombo na yango Efraim, pe afandi kuna ná bayekoli na ye.
[55] Feti ya Koleka ya Bayuda ekómaki penepene, bongo bato mingi ya mboka bakei na Yeruzalem liboso ya feti, po na komibongisa ndenge mibeko ezali kotinda.
[56] Baluki Yezu na Ndako ya Nzambe, pe batunani: “Bokanisi nini? Akoya na feti to akoya té?”
[57] Bakonzi ya banganga-Nzambe ná ba-Farizé bapesaki motindo 'tè soki moto ayebi esika Yezu azali, áya koyebisa bango po bákende kokanga ye.