[1] Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na mboka Kana, na Galilé. Mama na Yezu azalaki kuna.
[2] Babengisaki pe Yezu ná bayekoli na ye.
[3] Tango vinu esilaki, mama na Yezu alobi na ye: “Bazali lisusu na vinu té.”
[4] Kasi Yezu azongiseli ye: “Mama, biso na yo likambo nini? Tango na ngai nanu ekoki té.”
[5] Bongo mama na ye alobi na bato ya mosala: “Bósala makambo nyonso akotinda bino.”
[6] Bilokú motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosukolela na yango, ndenge mibeko na bango ezalaki kotinda. Elokú moko ekoki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale.
[7] Yezu alobi na bato ya mosala: “Bótondisa bilokú oyo na mai.” Batondisi yango meke.
[8] Bongo Yezu alobi na bango lisusu: “Sik'oyo, bózwa mwa-ndambo na yango, pe bókende kolakisa yango na mokonzi ya feti.” Bamemeli ye yango.
[9] Mokonzi ya feti ameki yango, mai ekómi vinu! Ayebaki té soki vinu yango euti wapi; kasi bato ya mosala oyo batókaki mai bango nde bayebaki. Abengi moto oyo abalaki,
[10] pe alobi na ye: “Ndenge nini yo obombi vinu ya malamu tii sik'oyo? Bato nyonso bapesaka liboso vinu ya malamu, bongo soki bato babandi kolangwa, nde bapesi bango vinu oyo ezali malamu mingi té.”
[11] Wana nde likamwisi ya liboso oyo Yezu asalaki. Asalaki yango na mboka Kana, na Galilé. Amonisaki lokumu na ye, pe bayekoli na ye bandimaki ye.
[12] Sima na yango Yezu akei na Kafarnaum, ná mama na ye, bandeko na ye, pe bayekoli na ye. Kasi bafandaki kuna mikolo mingi té.
[13] Lokola feti ya Koleka ya Bayuda ekómaki penepene, Yezu akei na Yeruzalem.
[14] Tango akoti na Ndako ya Nzambe, akuti bato ya mombongo bazali kotekisa bangombe, bameme ná bapijon, pe bato oyo bashanjaka mbongo bafandi na bamesa na bango.
[15] Yezu asali fimbu ya singa, abandi kobengana bango nyonso na Ndako ya Nzambe, ná bangombe na bango pe bameme. Abaloli bamesa ya bato oyo bazalaki koshanjé mbongo, apanzi pe mbongo na bango.
[16] Alobi na bato oyo bazalaki kotekisa bapijon: “Bólongola biloko oyo awa! Ndako ya Tata na ngai, bókómisa yango lokola zando té!”
[17] Bayekoli na ye babandi kokanisa makambo oyo ekòmamá na Mikanda: “E Nzambe, bolingo na ngai po na Ndako na yo ezali kozikisa ngai motema.”
[18] Bongo bakonzi ya Bayuda batuni Yezu: “Ndenge nini okoki kolakisa biso 'tè ozali na bokonzi ya kosala bongo?”
[19] Yezu azongiseli bango: “Bóboma Ndako ya Nzambe oyo, pe nakotònga yango lisusu na mikolo misato.”
[20] Bayuda balobi na ye: “Basalaki mbula tuku minei na motoba (46) po na kotònga Ndako oyo, bongo yo okotònga yango na mikolo misato?”
[21] Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yezu alobelaki, ezali nzoto na ye moko.
[22] Tango Yezu asekwaki, nde na tango wana bayekoli na ye bayei kokanisa 'tè alobaki maloba yango; bongo bandimaki makambo oyo ekòmamá na Mikanda, pe maloba oyo Yezu alobaki.
[23] Tango Yezu azalaki na Yeruzalem po na feti ya Koleka, bato mingi bandimaki ye po bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala.
[24] Kasi Yezu atiaki motema epai na bango té, pamba té ayebaki bango nyonso malamu.
[25] Yezu azalaki na posa té báyebisa ye makambo ya bato. Ye moko ayebi makambo nyonso oyo ezali na mitema ya bato.