[1] “Ngai nazali lokola nzete ya solo ya vinu, pe Tata na ngai azali kolo ya elanga.
[2] Bitape na ngai oyo ebotaka mbuma té, ye akokata yango; kasi oyo ebotaka, akobongisa yango po ébota mbuma mingi.
[3] Mateya oyo napesaki bino esi'ebongisá bino kala.
[4] Bókangama na ngai, lokola ngai nakangamá na bino. Etape moko té ekoki kobota yango moko, soki ekangamá na nzete ya vinu té. Bino pe ndenge moko, bokoki kosala eloko té soki bokangani na ngai té.
[5] “Ngai nazali lokola nzete ya vinu, bino bozali bitape. Moto oyo akanganá na ngai akobota mbuma mingi. Pamba té soki ngai nazali na bino té, bokoki kosala ata eloko moko té.
[6] Moto oyo akangani na ngai té, bakobwaka ye na libanda ndenge babwakaka etape ya pamba; yango ekaukaka, bongo balokotaka yango, babwakaka yango na móto pe ezikaka.
[7] Soki bokangami na ngai pe na maloba na ngai, bósenga nyonso oyo bolingi, pe bokozwa yango.
[8] Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bokolakisa 'tè bozali bayekoli na ngai.
[9] Nalingaka bino ndenge Tata alingaka ngai. Bótikala libela bato na ngai ya bolingo.
[10] Soki botosi mibeko na ngai, bokotikala libela bato na ngai ya bolingo, ndenge ngai nazali kotosa mibeko ya Tata na ngai, pe nazali libela moto na ye ya bolingo.
[11] “Nalobi na bino bongo po esengo na ngai ézala na mitema na bino, pe bótonda na yango.
[12] Mobeko na ngai, yango oyo: bólinganaka bino na bino ndenge ngai nalingaka bino.
[13] Bolingo mosusu ezali té oyo eleki ya moto andimi kokufa po na baninga na ye.
[14] Bino bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo natindaka bino.
[15] Nakobenga bino lisusu basali té, po mosali ayebaka té makambo mokonzi na ye asalaka. Kasi bino, nakobenga bino baninga; pamba té nasi'nayebisi bino makambo nyonso Tata na ngai alakisaki ngai.
[16] Bino bato boponaki ngai té, kasi ezali ngai nde moko naponaki bino. Napesi bino mosala: bókende, bóbota mbuma; pe nalingi yango éumela. Bongo Tata akobanda kopesa bino nyonso oyo bokozala kosenga na kombo na ngai.
[17] Mobeko na ngai, yango oyo: bólinganaka bino na bino.”
[18] “Soki bato ya mokili oyo bazali koyina bino, bóyeba 'tè bayinaki ngai liboso.
[19] Soki bozalaki bato ya mokili, mbele bato ya mokili balingaki bino. Kasi ngai naponi bino pe nalongoli bino na kati na bango. Bozali bato ya mokili té, yango wana bakómi koyina bino.
[20] Bókanisaka makambo nalobaki na bino: ‘Mosali aleki mokonzi na ye té.’ Ndenge banyokolaki ngai, bakonyokola pe bino; ndenge bandimaki mateya na ngai té, bakondima pe ya bino té.
[21] Kasi bakosala bino makambo nyonso wana likolo na ngai; po bayebi té Moto oyo atindaki ngai.
[22] Soki nayaki té, pe soki nalobelaki bango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi sik'oyo bakoki kowangana lisumu na bango té.
[23] Moto oyo ayinaka ngai, ayinaka pe Tata na ngai.
[24] Na miso na bango nasalaki makambo ya minene, oyo moto moko té asi'asalá. Soki nasalaki yango té, mbele bazali na lisumu té. Kasi basi'bamoni misala na ngai, pe bazali kaka koyina ngai ná Tata.
[25] Esalami bobele ndenge ekòmamá na Mibeko na bango: ‘Bayini ngai kaka pamba.’
[26] “Nakotindela bino Mosalisi na kombo ya Tata. Ye nde Molimo oyo akolakisa makambo nyonso ya solo. Akouta epai ya Tata, bongo tango akoya, akoyebisa bino makambo na ngai.
[27] Bino pe bokoyebisa bato makambo na ngai, po bozali ná ngai uta na ebandeli.”