Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:18

[1] Etikalaki mikolo motoba po na kokóma na feti ya Koleka; Yezu akei na Betanie, mboka ya Lazare moto oyo ye asekwisaki.

[2] Kuna basalelaki ye feti. Marte azalaki kotiela bango biloko na mesa, pe Lazare azalaki na kati ya bato oyo bafandaki esika moko ná Yezu.

[3] Maria akamati molangi ya malasi ya talo mingi penza, pe apakoli yango na makolo ya Yezu, bongo apangusi yango na suki na ye. Ndako mobimba etondi na sòlo ya malasi.

[4] Moko na kati ya bayekoli, Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu, alobi:

[5] “Po na nini batekisi malasi yango na talo mingi té po bápesa yango na bato bakelelá? Yango ekoki na lifuta ya mosali moko po na mosala ya mbula mobimba.”

[6] Alobaki bongo té po azalaki kokanisa bato bakelelá, kasi po azalaki moyibi; pamba té bazalaki kobombisa mbongo epai na ye, pe abandaki koyiba yango.

[7] Kasi Yezu azongisi: “Bótika ye. Lokola etikali moke bákunda ngai, ye asali malamu na ndenge abombaki yango tii sik'oyo.

[8] Bato bakelelá bakozala ná bino tango nyonso, kasi ngai nakozala ná bino libela té.”

[9] Bayuda ebele bayokaki 'tè Yezu azali na Betanie, bongo bakei kuna; bakendeki kaka po na Yezu té, kasi po na kotala pe Lazare oyo ye asekwisaki.

[10] Yango wana bakonzi ya banganga-Nzambe bayei kokana báboma pe Lazare;

[11] pamba té ezali likolo na ye nde Bayuda mingi balongwaki epai na bango pe bakómaki kondima Yezu.

[12] Sima ya mokolo moko, bato oyo bayaki po na feti ya Koleka bayoki 'tè Yezu akoya na Yeruzalem.

[13] Bakamati mandalala, bongo bakei koyamba ye na nzela, pe babandi koganga: “Ozana! Nkolo ábenisa moto oyo ayei na kombo na ye! Longonya na mokonzi ya Israel!”

[14] Yezu amoni punda, bongo amati likolo na yango, ndenge ekòmamá na Mikanda:

[15] “Kobanga té, vile ya Sion! Tala mokonzi na yo ayei, afandi na punda.”

[16] Mokolo wana bayekoli bayebaki tina ya makambo yango té; kasi tango Yezu azwaki lokumu, bayei kokanisa 'tè makambo yango ekòmamá na Mikanda, pe basalaki bobele ndenge ekòmamá po na ye.

[17] Mokolo Yezu abimisaki Lazare na simetiere pe asekwisaki ye, bato mingi bazalaki kuna; bongo batambwisaki sango yango.

[18] Yango wana bato ebele bayei kokutana ná ye, po bayokaki likamwisi oyo asalaki.

[19] Boye ba-Farizé balobi bango na bango: “Bomoni! Bokoki kosala eloko té; bato nyonso babandi kolanda ye!”

[20] Na kati ya bato oyo bayaki na feti po na kokumisa Nzambe, ezalaki pe na bato mosusu oyo bazali Bayuda té.

[21] Bakei koloba na Filipe, moto ya Betsaida ya Galilé: “Tata, tolingi komona Yezu.”

[22] Filipe akei koloba na André, bongo bango mibale bakei koyebisa Yezu.

[23] Yezu azongiseli bango: “Sik'oyo tango esi'ekoki oyo Mwana ya Moto akozwa lokumu.

[24] Nazali koloba na bino, ya solo: soki mbuma ya blé ekwei na mabelé té pe ekufi té, ekotikala kaka mbuma moko; kasi soki ekufi na kati ya mabelé, ekobota mbuma mingi.

[25] Moto alingi bomoi na ye, akobungisa yango, kasi moto andimi kobungisa bomoi na ye na mokili oyo, akozwa bomoi ya seko.

[26] Soki moto alingi kosalela ngai, álanda ngai, bongo biso ná mosali na ngai tokozala esika moko. Soki moto asaleli ngai, Tata akokumisa ye.”

[27] “Sik'oyo nazali komona pasi na motema. Náloba nini? Náloba 'tè: ‘Tata, bikisa ngai na pasi oyo?’ Té. Nayaki kaka po námona pasi oyo.

[28] Tata, kumisa kombo na yo.” Mongongo euti na Likolo elobi: “Nasi'nakumisi yango, pe nakokumisa yango lisusu.”

[29] Bato oyo bazalaki wana, tango bayoki mongongo yango balobi: “Ezali kake.” Bamosusu balobi: “Anjelu ayei koyebisa ye likambo.”

[30] Kasi Yezu alobi: “Mongongo yango elobi po na ngai té, kasi elobi po na bino.

[31] Sik'oyo tango ekoki: Nzambe akokata makambo ya bato ya mokili; sik'oyo akobengana mokonzi na bango.

[32] Tango bakotombola ngai, nakozala kobenda bato nyonso epai na ngai.”

[33] Na maloba oyo, Yezu alakisaki ndenge ye akokufa.

[34] Bato bazongiseli ye: “Biso toyebi na Mibeko na biso 'tè Mesia akoumela seko. Ndenge nini olobi na biso 'tè bakotombola Mwana ya Moto? Mwana ya Moto oyo ozali koloba, ye nani?”

[35] Yezu alobi na bango: “Moi ezali nanu na kati na bino mwa-tango moke; bótambolaka tango moi ezali nanu, po butu ékweela bino té; pamba té, moto oyo atambolaka na molili, ayebaka té esika azali kokende.

[36] Awa bozali na moi, bóndima makambo moi ezali kolakisa bino, po bókóma bato ya moi.” Sima ya maloba wana, Yezu alongwe pe akei komibomba mosika na bango.

[37] Atako asalaki makamwisi mingi na miso na bango, kasi bazalaki kondima ye té.

[38] Ya solo esalamaki bobele ndenge profete Ezaya alobaki: “Nkolo, nani andimaki sango na biso? Nani ayebaki 'tè Nkolo moto asali makambo yango?”

[39] Bakokaki kondima té, po Ezaya alobaká lisusu boye:

[40] “Nzambe akangi bango miso pe asilisi bango mayele, po bámona té, bázwa mayele té, pe báya epai na ngai té po nábikisa bango.”

[41] Ezaya alobaká bongo pamba té amonaki lokumu ya Yezu pe azalaki koloba po na ye.

[42] Nzokande na kati ya bakonzi ya Bayuda, bato ebele bandimaki Yezu, kasi babandaki koloba yango na miso ya bato té, po bazalaki kobanga 'tè ba-Farizé bakobengana bango na ndako ya lisanga.

[43] Pamba té, bazalaki koluka lokumu epai ya bato, kasi epai ya Nzambe té.

[44] Yezu alobi na mongongo makasi: “Moto oyo andimi ngai, andimi kaka ngai té, kasi andimi pe Moto oyo atindaki ngai.

[45] Oyo amoni ngai, amoni pe Moto oyo atindi ngai.

[46] Ngai nayaki na mokili lokola moi, po moto nyonso oyo andimi ngai, átambolaka lisusu na molili té.

[47] Soki moto azali koyoka maloba na ngai kasi azali kotosa yango té, ngai té moto nakokatela ye etumbu; pamba té nayaki po na kokatela bato etumbu té kasi po na kobikisa bango.

[48] Moto oyo aboyi ngai pe ayambi mateya na ngai té, zuzi na ye azali. Mateya oyo ngai nazali koteya, yango nde moto ekokatela ye etumbu na mokolo ya suka.

[49] Pamba té nalobaka na mayele na ngai moko té, kasi Tata oyo atindaki ngai, ye nde moto alakisaki ngai makambo nasengeli koloba pe koteya.

[50] Nayebi 'tè makambo oyo ye alakisaka, epesaka bato bomoi ya seko. Yango wana, makambo oyo nazali koloba, nalobaka yango se ndenge Tata alakisaki ngai.”

Yoane — Chapters