Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:01

[1] Feti ya Koleka ekómaki penepene, Yezu ayebaki 'tè tango na ye ekoki po álongwa na mokili pe ákende epai ya Tata. Azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki na mokili; azalaki kolinga bango mingi penza tii na suka.

[2] Alakisi bolingo yango tango bazalaki kolia. Zabolo asi'akotelaki Yudas, Mwana ya Simon Iskariot, apesi ye likanisi ya koteka Yezu.

[3] Nzokande Yezu ayebaki 'tè Tata asi'atie makambo nyonso na maboko na ye; ayebaki 'tè autaki na Nzambe pe akozonga epai ya Nzambe.

[4] Tango bazalaki kaka na mesa, atelemi, alongoli elamba na ye ya likolo, akamati elamba moko pe akangi yango na loketo.

[5] Na sima atie mai na sani, abandi kosukola bayekoli na ye makolo, pe apangusi bango mai na elamba oyo akangaki na loketo.

[6] Tango akómi na Simon Piere, ye atuni: “Mokonzi, yo okosukola ngai makolo?”

[7] Yezu azongiseli ye: “Likambo nazali kosala sik'oyo, oyebi tina na yango té, kasi okoyeba yango sima.”

[8] Piere alobi na ye: “Ósukola ngai makolo? Ekoki kosalama ata mokolo moko té!” Yezu azongiseli ye: “Soki nasukoli yo makolo té, okozwa bolamu na ngai té.”

[9] Simon Piere alobi na ye: “Mokonzi, soki bongo, kosukola ngai kaka makolo té, kasi sukola ngai pe maboko ná motú!”

[10] Yezu alobi na ye: “Moto oyo asi' asukoli nzoto mobimba, asi'akómi peto; asengeli kosukola bobele makolo. Bino pe bozali peto, kasi bino nyonso té.”

[11] Yezu ayebaki moto oyo akoteka ye, yango wana alobaki: “Bozali peto, kasi bino nyonso té.”

[12] Tango asilisi kosukola bango makolo, alati elamba na ye ya likolo pe ayei kofanda na mesa, alobi na bango: “Boyebi tina ya likambo oyo nasali bino?

[13] Bino bobengaka ngai Moteyi pe Mokonzi; bolobaka malamu, po nazali Moteyi pe Mokonzi.

[14] Bongo soki ngai, Mokonzi pe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino pe bosengeli kosukolana makolo bino na bino.

[15] Napesi bino ndakisa po bino pe bósalaka ndenge ngai nasali bino.

[16] Nazali koloba na bino, ya solo: mosali aleki mokonzi na ye té, pe ntoma aleki moto oyo atindi ye té.

[17] Lokola boyebi yango, soki bosali ndenge wana bokozala na esengo mingi.

[18] “Nazali koloba po na bino nyonso té. Ngai nayebi bato oyo naponá. Kasi ebongi ésalama ndenge ekòmamá: ‘Moto oyo azali kolia esika moko ná ngai, abalukeli ngai.’

[19] Nalobi na bino makambo yango sik'oyo, lokola nanu esalami té. Bongo tango ekosalama, bóndima 'tè Ngai Nazali.

[20] Nazali koloba na bino, ya solo: moto ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai moko. Pe moto ayambi ngai, ayambi penza Moto oyo atindi ngai.”

[21] Tango Yezu asilisi koloba bongo, ayoki pasi na motema, pe alobi na bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: moto moko na kati na bino akoteka ngai.”

[22] Bayekoli babandi kotalana bango na bango; bayebaki té soki azalaki koloba yango po na nani.

[23] Moyekoli moko oyo Yezu azalaki kolinga mingi, afandaki penepene ya Yezu.

[24] Simon Piere afineli ye liso po átuna Yezu soki alobaki makambo yango po na nani.

[25] Moyekoli wana atuni Yezu na litoi: “Mokonzi, moto yango nde nani?”

[26] Yezu azongisi: “Nakotia ndambo ya lipa oyo na supu, bongo moto oyo nakopesa yango, nde ye wana.” Yezu akamati ndambo ya lipa, atie yango na supu, pe apesi Yudas, mwana ya Simon Iskariot.

[27] Tango Yudas azwi yango, Satan pe akoteli ye. Yezu alobi na ye: “Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki.”

[28] Kasi na kati ya bato oyo bazalaki na mesa, ata moto moko té ayebaki tina ya maloba yango.

[29] Pamba té lokola Yudas azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki 'tè Yezu alobi na ye bongo po ásomba biloko oyo bakoki kolia na feti; bamosusu bakanisaki 'tè atindi ye ákende kopesa lisalisi na bato bakelelá.

[30] Awa Yudas akamati ndambo ya lipa wana, kaka na tango yango abimi. Butu esi'ekómaki.

[31] Tango Yudas abimi, Yezu alobi: “Sik'oyo Mwana ya Moto asi'azwi lokumu, pe Nzambe asi'azwi lokumu po na ye.

[32] Bongo Nzambe pe akopesa ye lokumu oyo ye moko azali na yango. Etikali kutu moke ápesa ye yango.

[33] Bana na ngai, nakozala na bino lisusu mikolo mingi té. Bokoluka ngai, kasi nazali koloba na bino sik'oyo ndenge nalobaki na Bayuda: bino bokoki kokende té epai ngai nakokende.

[34] Napesi bino mobeko ya sika: Bólinganaka bino na bino. Kaka ndenge ngai nalingaka bino, bino pe bólinganaka ndenge wana.

[35] Soki bolingani, bato nyonso bakoyeba 'tè bozali bayekoli na ngai.”

[36] Simon Piere atuni Yezu: “Mokonzi, okokende wapi?” Yezu azongiseli ye: “Okoki kolanda ngai sik'oyo té epai nakokende, kasi okolanda ngai sima.”

[37] Piere atuni ye lisusu: “Mokonzi, po na nini nakoki kolanda yo sik'oyo té? Nakopesa bomoi na ngai po na yo.”

[38] Yezu azongiseli ye: “Okopesa penza bomoi na yo po na ngai? Nazali koloba na yo, ya solo: liboso 'tè soso élela, okowangana mbala misato 'tè oyebi ngai té.”

Yoane — Chapters