[1] Na mokolo elandi Mokolo ya Kopema, na tongo penza, molili ezalaki nanu, Maria ya mboka Magdala ayei na simetiere. Amoni 'tè libanga oyo bazipelaki libulu esi'elongwe.
[2] Akei mbangu epai ya Simon Piere ná moyekoli mosusu oyo Yezu azalaki kolinga, pe alobi na bango: “Balongoli Mokonzi na libulu, pe toyebi té soki batie ye wapi.”
[3] Piere ná moyekoli mosusu bakei na simetiere.
[4] Bango mibale bazalaki kokima mbangu, kasi moyekoli mosusu alekaki Piere na mbangu, pe akómaki na simetiere liboso.
[5] Agumbami, amoni bobele bilamba ya mike oyo balíngaki nzoto ya Yezu ezali wana na se, kasi akotaki na kati té.
[6] Simon Piere akómaki na sima na ye pe akoti na libulu. Amoni bilamba ya mike wana ezalaki na se,
[7] ná kitambala oyo bazipaki Yezu na motú. Kitambala ezalaki esika moko ná bilamba ya mike té; kasi ezalaki ya kolíngama esika mosusu.
[8] Bongo moyekoli mosusu oyo akómaki na simetiere liboso, ye pe akoti, amoni pe andimi na motema.
[9] Tii tango wana bayekoli bayebaki nanu té tina ya makambo oyo ekòmamá na Mikanda 'tè Yezu akosekwa.
[10] Bongo bayekoli mibale wana bazongaki epai na bango.
[11] Maria atikalaki kotelema penepene ya simetiere, azalaki kolela. Awa azalaki kolela boye, agumbami po na kotala na kati ya libulu;
[12] amoni ba-anjelu mibale balati bilamba ya pembe, bafandi esika nzoto ya Yezu ezalaki, moko epai motú ezalaki, mosusu epai makolo ezalaki.
[13] Bongo ba-anjelu batuni ye: “Mama, po na nini ozali kolela?” Ye azongiseli bango: “Balongoli Mokonzi na ngai, pe nayebi té soki batie ye wapi.”
[14] Awa alobi boye, abaluki pe amoni Yezu atelemi wana, kasi Maria ayebaki ye té.
[15] Yezu atuni ye: “Mama, po na nini ozali kolela? Ozali koluka nani?” Maria akanisaki 'tè ye azali mosali ya elanga, pe alobi na ye: “Tata, soki yo moto olongoli ye, yebisa ngai soki otie ye wapi, po nákende kokamata ye.”
[16] Yezu alobi na ye: “Maria!” Maria pe abaluki epai na ye, alobi na monoko ya Bayuda: “Rabuni!” (elingi koloba “Moteyi”).
[17] Yezu azongiseli ye: “Tika ngai nákende, pamba té nanu nabuti epai ya Tata té. Kasi kende koloba na bandeko na ngai 'tè: nakobuta epai ya Tata na ngai oyo azali pe Tata na bino, epai ya Nzambe na ngai oyo azali pe Nzambe na bino.”
[18] Bongo Maria ya Magdala akei epai ya bayekoli, alobi na bango: “Nasi'namoni Mokonzi!” Pe ayebisi bango makambo oyo Yezu alobaki na ye.
[19] Ezalaki se mokolo wana na pokwa, sima ya Mokolo ya Kopema, bayekoli bazalaki esika moko. Bakangaki baporte nyonso ya ndako, po bazalaki kobanga Bayuda. Yezu ayei kotelema na kati na bango, pe alobi: “Boboto ézala na bino!”
[20] Awa asilisi koloba boye, alakisi bango maboko na ye ná mopanzi na ye. Tango bayekoli bamoni Mokonzi, mitema na bango etondi na esengo.
[21] Yezu alobi na bango lisusu: “Boboto ézala na bino! Ndenge Tata atindaki ngai, ngai pe nazali kotinda bino.”
[22] Sima ya maloba oyo, afuli bango pema na ye, pe alobi: “Bózwa Molimo Mosantu.
[23] Masumu ya bato oyo bino bokolimbisa, Nzambe akolimbisa yango; masumu ya baoyo bino bokolimbisa té, Nzambe pe akolimbisa yango té.”
[24] Toma, moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Mapasa, azalaki na bango té tango Yezu ayaki.
[25] Bayekoli mosusu balobi na ye: “Tosi'tomoni Mokonzi!” Kasi Toma azongiseli bango: “Soki namoni bapota ya basete na maboko na ye té, soki nasimbi yango na mosapi té, pe soki natie liboko na ngai na mopanzi na ye té, nakondima ata moke té.”
[26] Sima ya póso moko, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma pe azalaki ná bango. Atako baporte ya ndako ezalaki ya kokangama, Yezu ayei kotelema na kati na bango pe alobi: “Boboto ézala na bino!”
[27] Bongo alobi na Toma: “Pusana, kotisa mosapi na yo awa, pe tala maboko na ngai; tia lisusu liboko na yo na mopanzi na ngai. Tika tembe, kasi ndima na motema.”
[28] Toma azongiseli ye: “Mokonzi na ngai pe Nzambe na ngai.”
[29] Yezu alobi na ye: “Ondimi po omoni ngai? Esengo na bato oyo bakondima, ata bamoni na miso té.”
[30] Yezu asalaki makamwisi mosusu mingi na miso ya bayekoli na ye, kasi yango nyonso ekòmamá na mokanda oyo té.
[31] Kasi makambo oyo ekòmami po bino bóndima 'tè Yezu azali Mesia, Mwana ya Nzambe. Soki bondimi bongo, bokozwa bomoi na kombo na ye.