[1] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, atomboli miso na likolo pe alobi: “Tata, tango ekoki, kumisa Mwana na yo, po Mwana pe ákumisa yo.
[2] Pamba té otie ye Mokonzi ya bato nyonso, po ápesa bomoi ya seko na bato nyonso oyo opesaki ye.
[3] Bomoi ya seko ezali nde koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, pe koyeba Yezu Kristo, oyo yo otindaki.
[4] Ngai nakumisi yo awa na se; nasilisi mosala oyo otindaki ngai.
[5] Bongo sik'oyo, Tata, pesa ngai lokumu oyo nazalaká na yango epai na yo, liboso 'tè mokili ésalama.
[6] “Bato oyo opesi ngai, olongolaki bango na kati ya bato ya mokili. Bazalaki bato na yo, opesi ngai bango; bongo ngai nalakisi bango lokumu na yo, pe bandimi maloba na yo.
[7] Bayebi sik'oyo 'tè nyonso oyo opesi ngai, euti epai na yo,
[8] pamba té nalakisi bango maloba oyo yo oyebisaki ngai. Bango pe bayambi yango, pe bandimi ya solo 'tè nauti epai na yo, yo moto otindi ngai.
[9] “Nazali kobondela yo po na bango. Nazali kobondela po na bato ya mokili oyo té, kasi po na baoyo opesi ngai, pamba té bazali bato na yo.
[10] Nyonso oyo ezali ya ngai ezali ya yo; pe nyonso oyo ezali ya yo, ezali pe ya ngai; boye bolamu oyo napesi bango ezali kolakisa lokumu na ngai.
[11] “Nazali lisusu na kati ya bato ya mokili té, kasi bango bazali na kati ya bato ya mokili. Ngai nazali koya epai na yo. Tata Mosantu, salela nguya na yo oyo opesá ngai, batela bango po bázala moto moko, ndenge ngai ná yo tozali se moto moko.
[12] Tango nazalaki ná bango, nabandaki kobatela bango na nguya na yo oyo opesá ngai. Nabatelaki bango malamu, pe na kati na bango moko té abungaki, longola kaka moto oyo asengelaki kobunga, ndenge ekòmamá na Mikanda.
[13] “Sik'oyo nazali koya epai na yo. Nazali koloba makambo oyo awa nazali nanu na mokili, po bango bázala na esengo na ngai, pe bátonda na yango.
[14] Nalakisaki bango maloba na yo; yango wana bato ya mokili bayini bango, po bazali bato na bango té, ndenge ngai pe nazali moto na bango té.
[15] Nasengi té 'tè ólongola bango na mokili; kasi batela bango po bákweya na maboko ya Monguna té.
[16] Bazali bato ya mokili oyo té, ndenge ngai pe nazali moto ya mokili oyo té.
[17] Yebisa bango maloba na yo po ókómisa bango bato na yo penza; pamba té maloba na yo elakisaka makambo nyonso ya solo.
[18] Natindi bango epai ya bato, ndenge yo otindaki ngai epai ya bato.
[19] Napesi yo bomoi na ngai lokola libonza po na bango, po bákóma bato na yo penza.
[20] “Nazali kobondela po na bango kaka té, kasi nazali kobondela pe po na bato nyonso oyo bakoyoka mateya na bango pe bakondimela ngai.
[21] Tata, kómisa bango nyonso moto se moko, ndenge yo ozali na ngai, pe ngai nazali na yo. Bango pe bázala na biso lisanga, po bato ya mokili bándima 'tè ezali yo moto otindi ngai.
[22] Napesi bango lokumu oyo yo opesi ngai, po bázala moto moko, ndenge yo ná ngai tozali moto moko:
[23] ngai ná bango, pe yo ná ngai. Ndenge wana bázala penza moto moko, boye bato ya mokili bakoyeba 'tè yo moto otindi ngai, pe olingi bango ndenge ozali kolinga ngai.
[24] “Tata, bato oyo opesi ngai, nalingi bázala ná ngai esika moko, po bámona lokumu oyo opesi ngai. Pamba té, obandá kolinga ngai liboso 'tè mokili ésalama.
[25] Tata, yo ozali bosembo. Bato ya mokili bayebi yo té, kasi ngai nayebi yo, pe bato oyo bandimi 'tè yo moto otindaki ngai.
[26] Nasi'nalakisi bango lokumu na yo, pe nakolakisa bango lisusu, po bolingo oyo olingi ngai, ézala na mitema na bango, bongo ngai pe názala na mitema na bango.”