Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:33

[1] Moto moko azalaki na kati ya ba-Farizé, kombo na ye Nikodeme. Ye azalaki pe moto monene ya Bayuda.

[2] Mokolo moko ayei kotala Yezu na butu, alobi na ye: “Moteyi, toyebi 'tè Nzambe atindi yo po na koteya bato. Pamba té moto moko té akoki kosala makamwisi ndenge yo ozali kosala, soki Nzambe azali na ye té.”

[3] Yezu azongiseli ye: “Nazali koloba na yo, ya solo: soki moto abotami mbala ya mibale té, akoki komona bokonzi ya Nzambe té.”

[4] Nikodeme atuni ye: “Ndenge nini moto akoki kobotama mbala ya mibale, soki akómi mobange? Ázonga lisusu na libumu ya mama na ye, po ábotama mbala ya mibale?”

[5] Yezu alobi na ye: “Nazali koloba na yo, ya solo: bobele oyo abotami na mai pe na Molimo nde moto akoki kokota na bokonzi ya Nzambe.

[6] Oyo abotami na moto, azali moto; oyo abotami na Molimo, azali molimo. 3

[7] Kokamwa té po nalobi na yo: Bosengeli kobotama mbala ya mibale.

[8] Molimo esalaka lokola mopepe ekendeke epai yango elingi. Oyokaka makelele na yango, kasi oyebaka té epai yango euti to epai yango ezali kokende. Esalamaka pe ndenge wana na moto oyo abotami na Molimo.”

[9] Bongo Nikodeme atuni ye: “Ndenge nini makambo yango ekoki kosalama?”

[10] Yezu azongiseli ye: “Ozali moteyi monene na kati ya Israel; bongo oyebi makambo oyo té?

[11] Nazali koloba na yo, ya solo: tolobaka makambo oyo toyebi, pe toyebisaka bino makambo oyo tomoni; kasi bondimaka yango té.

[12] Soki nalobeli bino makambo oyo esalamaka awa na se, bozali kondimela ngai té; ndenge nini bokondimela ngai soki nayebisi bino makambo oyo esalamaka na Likolo?

[13] Ata moto moko té asi'abutá na Likolo; kaka Mwana ya Moto nde auti na Likolo.

[14] Pe ndenge Moize atombolaká ekeko ya nyoka na esobe, bobele bongo pe esengeli bátombola Mwana ya Moto,

[15] po moto nyonso oyo akondimela ye ázwa bomoi ya seko.

[16] “Pamba té, Nzambe alingi bato ya mokili mingi penza; yango wana apesaki Mwana na ye se moko, po 'tè moto nyonso oyo akondimela ye ákufa té, kasi ázwa bomoi ya seko.

[17] Soki Nzambe atindaki ye epai ya bato, ezali té po ákatela bango etumbu, kasi po ábikisa bango.

[18] Moto oyo andimeli Mwana, azwaka etumbu té; kasi oyo andimeli Mwana té asi'azwi etumbu; pamba té aboyi kondimela Mwana se moko ya Nzambe.

[19] Tala ndenge Nzambe akatelaka makambo: moi eyei na mokili, kasi bato bazali kolinga mingi molili; baboyi moi, po basalaka makambo ya mabe.

[20] Moto nyonso oyo asalaka mabe, aboyaka moi, ayaka epai ya moi té, soki té misala na ye ya mabe ekomonana.

[21] Kasi oyo asalaka ndenge Nzambe azali kolakisa, ayaka epai ya moi, po yango émonisa 'tè ye atosaka Nzambe, na makambo nyonso oyo asalaka.”

[22] Sima na yango, Yezu ná bayekoli na ye bakei na rejion ya Yudea. Kuna atikalaki ná bango mwa-tango, pe azalaki kobatisa bato.

[23] Yoane pe azalaki kobatisa bato na Ainon, penepene ya Salim, pamba té kuna mai ezalaki mingi. Bato babandaki koya epai na ye, pe azalaki kobatisa bango.

[24] Na tango wana nanu batie Yoane na boloko té.

[25] Mokolo moko bayekoli mosusu ya Yoane bazalaki kotiana tembe ná Moyuda moko po na makambo etali Mibeko na bango ya kosukola.

[26] Bongo bakei epai ya Yoane, balobi na ye: “Moteyi, moto oyo azalaki ná yo na ngambo ya Yordan, oyo olobelaki biso po na ye, sik'oyo ye pe abandi kobatisa bato. Bato nyonso bazali kokende epai na ye.”

[27] Yoane azongiseli bango: “Moto akoki kozwa eloko moko té, soki Nzambe apesi ye yango té.

[28] Bino moko boyebi 'tè nalobaki na bino: ‘Ngai nazali Mesia té; kasi Nzambe atindaki ngai liboso, po Mesia alingi koya.’

[29] Ye azali lokola mobali oyo azwi mwasi, pe azali kosalisa feti ya libala. Ngai nazali lokola moninga ya mobali, oyo afandi penepene na ye pe azali koyoka ye, bongo azali na esengo mingi po na koyoka mongongo ya moninga na ye oyo abali. Wana nde esengo na ngai; ya solo, nasepeli penza.

[30] Esengeli lokumu na ye éleka ya ngai, bongo ya ngai ékita.”

[31] “Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso. Bato ya mokili oyo bakangamaka kaka na mokili, pe balobaka bobele makambo ya mokili. Moto oyo auti na Likolo aleki bato nyonso;

[32] alobaka makambo ye ayoki pe amoni; kasi moto moko té azali koyamba maloba na ye.

[33] Bato oyo bayambi maloba na ye, bandimi 'tè Nzambe alobaka makambo ya solo.

[34] Moto oyo Nzambe atindi, alobaka maloba ya Nzambe, pamba té Nzambe atondisi ye na Molimo na ye.

[35] Tata alingaka Mwana na ye; apesi makambo nyonso na maboko na ye.

[36] Moto oyo andimeli Mwana, azwi bomoi ya seko; oyo atosi Mwana té akozwa bomoi ya seko té, kasi akotikala seko na etumbu ya Nzambe.”

Yoane — Chapters