Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 10:05

[1] Sima na yango, Yezu akei na ngambo ya laki ya Galilé (babengaka yango pe laki ya Tiberiade).

[2] Bato ebele bazalaki kolanda ye po bamonaki makamwisi oyo asalaki, pe ndenge abandaki kobikisa bato bazalaki na maladi.

[3] Yezu amati na ngomba pe afandi kuna ná bayekoli na ye.

[4] Feti ya Koleka ya Bayuda ekómaki penepene.

[5] Yezu átala boye, amoni bato mingi bazali koya epai na ye; alobi na Filipe: “Esika nini tokoki kosombela bato oyo biloko ya kolia?”

[6] Alobaki bongo po na komeka ye, pamba té ye moko asi'ayebaki likambo oyo alingaki kosala.

[7] Filipe azongiseli ye: “Ata tosombi mapa soki 2.000, ekokoka té po moto nyonso ália mwa-eteni ya lipa.”

[8] Moyekoli mosusu, kombo na ye André, leki ya Simon Piere, alobi na Yezu:

[9] “Mwana moko atelemi kuna, azali na mapa mitano ná bambisi mibale. Kasi tósala na yango nini po na bato ebele boye?”

[10] Yezu alobi na bango: “Bófandisa bato nyonso.” Esika wana ezalaki na matiti mingi. Bongo bato nyonso bafandifandi; mibali nyonso bazalaki penepene ya 5.000.

[11] Yezu akamati mapa yango, apesi Nzambe mersi, pe akaboli yango na bato oyo bazalaki wana. Akaboleli bango pe mbisi. Moto nyonso azwaki ndenge motema na ye elingi.

[12] Tango bato nyonso basilisi kolia, batondi, Yezu alobi na bayekoli na ye: “Bólokota biteni ya mapa oyo etikali, po ébeba té.”

[13] Balokoti yango, pe batondisi bitunga zomi na mibale na biteni ya mapa oyo etikalaki.

[14] Bato oyo bamonaki likamwisi Yezu asalaki, balobi: “Ya solo, ye azali profete oyo tozalaki kozela.”

[15] Yezu ayebaki 'tè balingi kotia ye mokonzi na makasi; yango wana azongi na likolo ya ngomba ye moko.

[16] Tango pokwa ekómi, bayekoli bakei penepene ya laki.

[17] Bakoti na bwatu moko, pe babandi kokatisa ngambo ya Kafarnaum. Butu esi'eyaki, kasi Yezu nanu akómaki epai na bango té.

[18] Mai ezalaki koningana mingi, po mopepe ezalaki makasi.

[19] Tango bakómi pembeni ya mokili, bamoni Yezu azali koya epai ya bwatu pe kotambola likolo ya mai; babangaki mingi.

[20] Kasi Yezu alobi na bango: “Ezali ngai, bóbanga té.”

[21] Balingaki kokotisa ye na bwatu, kasi kaka na tango wana bwatu ekómi na libongo esika bazalaki kokende.

[22] Na tongo ya mokolo elandi, bato oyo batikalaki na ngambo ya laki, bayei kokanisa 'tè bwatu moko kaka ezalaki wana, pe Yezu akotaki na yango té; pamba té bayekoli bakendeki bango moko.

[23] Nzokande babwatu mosusu elongwaki na Tiberiade eyei kotelema na esika Mokonzi Yezu apesaki Nzambe mersi pe aleisaki bato mapa.

[24] Awa bato bamoni 'tè Yezu ná bayekoli na ye bazali té, bakoti na babwatu wana pe bakei na Kafarnaum po na koluka ye.

[25] Bakuti Yezu na ngambo ya laki, bongo batuni ye: “Moteyi, oyaki awa tango nini?”

[26] Yezu azongiseli bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: bozali koluka ngai kaka po boliaki pe botondaki mingi; kasi ezali té po bomonaki mosala oyo euti na Nzambe.

[27] Bótika kosala bobele po na bilei oyo ebebaka, kasi bósala po na bilei oyo eumelaka, pe epesaka bomoi ya seko. Bilei wana, Mwana ya Moto akopesa bino yango, pamba té Nzambe Tata alakisi polele 'tè atindi ye.”

[28] Bato batuni ye: “Tósala nini po na kokokisa misala oyo Nzambe alingaka?”

[29] Yezu azongiseli bango: “Mosala Nzambe alingaka, yango oyo: Bóndima moto oyo ye atindaki.”

[30] Bato batuni ye lisusu: “Ndenge nini okoki kolakisa 'tè Nzambe moto atindi yo, po tóndimela yo? Likambo nini okoki kosala?

[31] Bakoko na biso baliaká bilei oyo babengaka mane, tango bazalaká na esobe. Ekòmamá boye: ‘Apesaki bango bilei oyo euti na Likolo.’”

[32] Yezu azongiseli bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: Ezali Moize té moto apesaká bino bilei oyo eutaki na Likolo; kasi Tata na ngai azali kopesa bino bilei ya solo, oyo euti na Likolo.

[33] Pamba té bilei oyo Nzambe azali kopesa bino elongwe na Likolo; yango nde moto ezali kopesa bato bomoi.”

[34] Bato balobi na ye: “Mokonzi, pesaka biso bilei yango mikolo nyonso.”

[35] Yezu azongiseli bango: “Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala té, pe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mai ata mokolo moko té.

[36] Kasi nalobi na bino: ata bomoni ngai, bozali kondima ngai té.

[37] Moto nyonso Tata akopesa ngai, akoya epai na ngai. Soki ayei epai na ngai, nakobengana ye té;

[38] pamba té, ngai nauti na Likolo pe nayei awa na mokili po na kosala makambo na ngai moko té, kasi po na kokokisa makambo ya Moto oyo atindaki ngai.

[39] Moto oyo atindaki ngai alingi 'tè: nábungisa ata moko té na kati ya bato nyonso oyo apesi ngai, kasi násekwisa bango na mokolo ya suka.

[40] Pamba té Tata na ngai alingi boye: moto nyonso oyo akomona Mwana pe akondima ye, ázwa bomoi ya seko; bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka.”

[41] Bayuda bakómaki koyimayima po Yezu alobaki: “Nazali bilei oyo euti na Likolo.”

[42] Bongo balobi: “Boni? Oyo Yezu té, Mwana ya Jozef? Biso toyebi tata na ye ná mama na ye. Ndenge nini azali koloba 'tè auti na Likolo?”

[43] Yezu alobi na bango: “Bótika koyimayima.

[44] Moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai amemi ye té, bongo ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka.

[45] Baprofete bakòmaká boye: ‘Nzambe akoteya bato nyonso.’ Moto nyonso oyo ayokelaka Tata pe andimaka mateya na ye, akoya epai na ngai.

[46] Moto moko té nanu amoná Tata; kaka ngai moto nauti epai ya Nzambe, nasi'namoná Tata.

[47] “Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo andimaka ngai, azali na bomoi ya seko.

[48] Ngai nazali bilei oyo epesaka bomoi.

[49] Bakoko na bino tango bazalaká na esobe, baliaká bilei oyo babengaka mane; ata bongo bakufaká kaka.

[50] Kasi bilei oyo euti na Likolo, soki moto alei yango akokufa té.

[51] Ngai nazali bilei ya bomoi oyo euti na Likolo. Soki moto alei yango, akozala na bomoi ya seko. Bilei oyo ngai nakopesa na bato, ezali nzoto na ngai; nakopesa yango po bato bázwa bomoi.”

[52] Awa alobi boye, Bayuda babandi kotiana tembe, balobi: “Ndenge nini moto oyo akopesa biso nzoto na ye po tólia yango?”

[53] Yezu azongiseli bango: “Nazali koloba na bino, ya solo, soki bolei nzoto ya Mwana ya Moto té pe soki bomeli makila na ye té, bokozwa bomoi ya seko té.

[54] Moto oyo akolia nzoto na ngai pe akomela makila na ngai, akozala na bomoi ya seko; pe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka.

[55] Nazali kopesa nzoto na ngai po bato bália yango solo; pe nazali kopesa makila na ngai po bato bámela yango solo.

[56] Moto oyo aliaka nzoto na ngai pe amelaka makila na ngai, biso ná ye tozali moto moko.

[57] Tata oyo atindaki ngai azali na bomoi; ngai pe nazali na bomoi po na ye; moto oyo aliaka nzoto na ngai, akozala pe na bomoi po na ngai.

[58] Ngai nazali bilei euti na Likolo, nazali té lokola bilei oyo bakoko na bino baliaká; pamba té bakufaká kaka. Kasi moto aliaka bilei oyo, akozala na bomoi ya seko.”

[59] Oyo ezali mateya Yezu ateyaki na ndako ya lisanga, na Kafarnaum.

[60] Awa bayoki maloba ya Yezu, bayekoli na ye mingi balobi: “Mateya oyo ezali makasi po na kondima. Nani akoki kondima yango?”

[61] Yezu ayebaki 'tè bayekoli na ye basepelaki té po na yango, bongo atuni bango: “Makambo oyo esali bino pasi na mitema?

[62] Bokoloba nini soki bomoni Mwana ya Moto, azali kobuta na esika oyo azalaká liboso?

[63] Ezali Molimo moto apesaka bomoi, kasi makasi ya bomoto ezali pamba. Maloba nauti koloba etondá na nguya ya Molimo oyo apesaka bomoi.

[64] Kasi bato mosusu na kati na bino bazali kondima ngai té.” Yezu alobaki ndenge wana pamba té, ayebaki banda kala banani bazalaki kondimela ye té; ayebaki pe nani akoteka ye;

[65] bongo abakisi boye: “Yango wana nayebisi bino 'tè moto moko té akoki koya epai na ngai, soki Tata apesi ye nzela té.”

[66] Banda mokolo wana bayekoli na ye mingi balongwaki, pe balandaki ye lisusu té.

[67] Bongo Yezu atuni bayekoli zomi na mibale: “Bino pe bolingi kokende?”

[68] Simon Piere azongiseli ye: “Mokonzi, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko.

[69] Sik'oyo tondimi, toyebi 'tè ozali Mosantu oyo Nzambe aponá.”

[70] Yezu alobi na bango: “Ngai moto naponaki bino nyonso zomi na mibale. Kasi moto moko na kati na bino azali moto ya zabolo.”

[71] Yezu alobaki bongo po na Yudas, Mwana ya Simon Iskariot, pamba té ezali ye nde moto akoteka Yezu, atako azalaki na kati ya bayekoli zomi na mibale.

Yoane — Chapters