Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:14

[1] Yezu akei na Ngomba ya ba-Olive.

[2] Tongo etani, azongi na Ndako ya Nzambe, pe bato nyonso bayei penepene na ye. Ye afandi pe abandi koteya bango.

[3] Balakisi-Mibeko ná ba-Farizé bamemeli ye mwasi moko oyo bakangaki ná mobali ya bato. Batie ye liboso ya bato nyonso,

[4] bongo balobi na Yezu: “Moteyi, tokangi mwasi oyo ná mobali ya bato.

[5] Mibeko ya Moize ezali kotinda 'tè tóboma basi ya ndenge oyo na mabanga. Kasi yo olobi nini?”

[6] Balobaki bongo po bámeka ye, bongo bázwa nzela ya kofunda ye. Kasi Yezu agumbami na se, pe abandi kokòma mosapi na mabelé.

[7] Awa bazalaki kaka kotunatuna ye, Yezu atali bango pe alobi: “Na kati na bino, moto oyo nanu asalá lisumu moko té, ábwakela ye libanga ya liboso.”

[8] Bongo agumbami lisusu, pe abandi kokòma na mabelé.

[9] Tango bayoki bongo, bakómi kokende moko moko, mibange liboso; kaka Yezu moto atikalaki wana, ye ná mwasi yango.

[10] Bongo Yezu atali ye, pe alobi: “Mama, wapi bango? Ata moto moko té akateli yo etumbu?”

[11] Ye azongisi: “Mokonzi, ata moto moko té.” Bongo Yezu alobi na ye: “Ngai pe nakokatela yo etumbu té. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu té.”]

[12] Yezu alobi lisusu na bato: “Ngai nazali lokola moi po na bato. Moto oyo alandi ngai, akotambola na molili ata moke té, kasi akobanda kotambola na moi, bongo akozwa bomoi ya solo.”

[13] Ba-Farizé balobi na ye: “Ozali koloba po na yo moko; maloba na yo ezali ya pamba.”

[14] Yezu azongiseli bango: “Ata nazali koloba po na ngai moko, maloba na ngai ezali ya solo; pamba té nayebi epai nauti pe epai nakokende. Kasi bino boyebi té epai ngai nauti pe epai nakokende.

[15] Bino bokataka makambo na ndenge ya bomoto, kasi ngai nakataka likambo ya moto té.

[16] Soki nakati likambo ya moto, nakati yango malamu, po nazalaka ngai moko té, kasi tozalaka biso ná Tata oyo atindi ngai.

[17] Na Mibeko na bino ekòmamá 'tè soki bato mibale bazali koloba ndenge moko, likambo wana ezali ya solo.

[18] Ngai nazali koloba po na ngai moko. Pe Tata oyo atindi ngai azali koloba po na ngai.”

[19] Bango batuni ye: “Tata na yo azali wapi?” Yezu azongiseli bango: “Bino boyebi ngai té, pe boyebi Tata na ngai té. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki koyeba pe Tata na ngai.”

[20] Yezu alobaki makambo wana tango azalaki koteya bato na Ndako ya Nzambe, na esika bazalaki kotia makabo. Ata moto moko té akangaki ye, po tango na ye ekokaki nanu té.

[21] Yezu alobi na bango lisusu: “Ngai nakokende, bongo bokoluka ngai; kasi bokokufa na masumu na bino. Bokoki kokende té epai ngai nakokende.”

[22] Bayuda batunani bango na bango: “Boni? Akokende komiboma? Po alobi: Bino bokoki kokende té epai nakokende.”

[23] Yezu alobi na bango: “Bino bozali bato ya se, kasi ngai nauti na Likolo. Bino bozali bato ya mokili oyo, kasi ngai nazali moto ya mokili oyo té.

[24] Yango wana nalobi na bino 'tè bokokufa na masumu na bino. Soki boboyi kondima 'tè Ngai Nazali, bokokufa na masumu na bino.”

[25] Bango batuni ye: “Yo ozali nani?” Yezu azongiseli bango: “Ngai nazali oyo nalobaki na bino uta na ebandeli.

[26] Nazali na makambo mingi ya koloba po na bino, pe ya kosambisa bino. Kasi Moto oyo atindaki ngai azali moto ya solo; makambo oyo nalobaka na bato, nayokaki yango epai na ye.”

[27] Kasi bango bayebaki té 'tè Yezu azalaki kolobela bango po na Tata.

[28] Bongo Yezu alobi na bango lisusu: “Tango bokotombola Mwana ya Moto, bokoyeba 'tè Ngai Nazali; bongo bokoyeba 'tè nasalaka eloko moko té na mayele na ngai moko, kasi nalobaka se makambo oyo Tata alakisaki ngai.

[29] Moto oyo atindaki ngai, azali na ngai, atiki ngai té; pamba té tango nyonso nasalaka makambo oyo ye alingaka.”

[30] Tango Yezu alobaki bongo, bato mingi bandimaki ye.

[31] Yezu alobi na Bayuda oyo bazalaki kondima ye: “Soki bobandi kotosa maloba na ngai, bokozala penza bayekoli na ngai.

[32] Bokoyeba makambo Nzambe azali kolakisa bino, pe yango ekokómisa bino bato ya bonsomi.”

[33] Bazongiseli ye: “Tozali bato ya libota ya Abraham; nanu tokómá baumbu ya moto té. Ndenge nini olobi na biso: ‘Bokokóma bato ya bonsomi?’”

[34] Yezu alobi na bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali moumbu ya masumu.

[35] Moumbu atikalaka seko moto ya libota té, kasi Mwana azali moto ya libota seko.

[36] Soki Mwana ya Nzambe alongoli bino na boumbu, bokozala penza na bonsomi ya solo.

[37] Nayebi 'tè bozali bana ya Abraham; kasi bozali koluka bóboma ngai, po bondimaka maloba na ngai té.

[38] Ngai nalobaka makambo oyo Tata na ngai alakisaki ngai, kasi bino bosalaka makambo oyo boyokaki epai ya tata na bino.”

[39] Bango bazongiseli ye: “Tata na biso ezali Abraham.” Kasi Yezu alobi na bango: “Soki bozali bana ya Abraham, bósalaka ndenge ye azalaká kosala.

[40] Kasi bozali kaka koluka bóboma ngai; nzokande nalobi na bino bobele makambo ya solo oyo nayokaki epai ya Nzambe. Abraham atikalaká kosala ndenge wana ata moke té.

[41] Bino bosalaka makambo oyo tata na bino asalaka.” Bango bazongiseli ye: “Babotaki biso na kindumba té; tozali bana ya Tata se moko, ye nde Nzambe.”

[42] Yezu alobi na bango: “Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbele bolingaka ngai, pamba té nauti epai ya Nzambe, nayei na kombo na ye. Nayaki na mayele na ngai moko té, kasi ezali ye nde moto atindaki ngai.

[43] Po na nini bozali koyeba tina ya maloba na ngai té? Ezali kaka po bokoki kondima yango té.

[44] Bozali bana ya zabolo, pe bolukaka kosala bobele makambo oyo tata na bino alingaka. Uta ebandeli ye azalaka kaka mobomi, pe aboyá makambo ya Nzambe; makambo ya solo ezali na ye té. Tango akosaka, lokuta wana eutaka na motema na ye; pamba té azali moto ya lokuta pe tata na yango.

[45] Kasi ngai nalobaka na bino makambo euti na Nzambe, yango wana bondimelaka ngai té.

[46] Nani na kati na bino akoki kotangela ngai lisumu oyo nasi'nasali? Soki nazali koloba makambo ya solo, po na nini bolingi kondimela ngai té?

[47] Moto oyo azali mwana ya Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe; kasi bino bozali koyoka yango té, po bozali bana na ye té.”

[48] Bayuda balobi na Yezu: “Omoni? Tolobaki ya solo té? Ozali moto ya Samarie, pe ozali na molimo mabe!”

[49] Yezu azongiseli bango: “Nazali na molimo mabe té. Nakumisaka Tata na ngai, kasi bino bokumisaka ngai té.

[50] Ngai nalukaka lokumu na ngai moko té, kasi Nzambe azali kolukela ngai yango. Ye nde moto akokata likambo.

[51] Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo azali kotosa maloba na ngai, akokufa té.”

[52] Bayuda balobi na ye: “Sik'oyo tomoni penza 'tè ozali na molimo mabe! Abraham akufá; baprofete bakufá; kasi yo olobi: Soki moto atosi maloba na ngai akokufa té, kasi akozwa bomoi ya seko.

[53] Tata na biso Abraham asi'akufá; yo okanisi 'tè oleki ye? Baprofete pe basi'bakufá. Bongo yo okanisi penza 'tè ozali nani?”

[54] Yezu azongisi: “Soki namikumisi, lokumu na ngai ezali pamba. Kasi Tata na ngai azali kokumisa ngai. Bino bolobaka 'tè: ‘Azali Nzambe na biso';

[55] nzokande boyebi ye té. Ngai nayebi ye; pe soki nalobi 'tè nayebi ye té, nakómi moto ya lokuta lokola bino. Ya solo, nayebi ye, pe natosaka maloba na ye.

[56] Tata na bino Abraham atondaki na esengo po ayebaki 'tè akomona ngai, mokolo nakoya na mokili; amonaki yango, pe asepelaki mingi.”

[57] Bayuda batuni ye: “Yo okokisi kutu ata mbula tuku mitano (50) té, bongo ozali koloba 'tè omonaká Abraham?”

[58] Yezu azongiseli bango: “Nazali koloba na bino, ya solo: liboso 'tè Abraham ábotama, Ngai Nazali.”

[59] Tango Bayuda bayoki boye, balokoti mabanga po bábamba ye; kasi Yezu amibendi pe abimi na Ndako ya Nzambe.

Yoane — Chapters