[1] “Nalobi na bino makambo oyo po bóbeta libaku té.
[2] Bakobengana bino na bandako ya lisanga. Tango ekoya, bato oyo bakoboma bino bakokanisa 'tè bazali kosalela Nzambe.
[3] Bakosala bongo po bayebi Tata té; bayebi pe ngai té.
[4] Kasi nayebisi bino yango sik'oyo, po tango makambo wana ekosalama, bókanisa 'tè nasi'nayebisá bino yango.” “Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli té, po nazalaki na bino.
[5] Sik'oyo nakei epai ya Moto oyo atindaki ngai, pe moko té na kati na bino azali kotuna ngai: ‘Okei wapi?’
[6] Awa nayebisi bino yango, bobandi kutu koyoka mawa na mitema.
[7] Kasi nazali koloba na bino ya solo: eleki malamu po na bino 'tè nákende; pamba té soki nakei té, Mosalisi akoyeela bino pe té; kasi soki nakei, nakotindela bino ye.
[8] Tango ye akoya, akomonisa polele 'tè bato ya mokili babungi. Akolakisa 'tè bazali na lisumu, pamba té baboyi kondimela ngai. Akolakisa 'tè Nzambe azali bosembo, pamba té nakei epai ya Tata, pe bokomona ngai lisusu té. Akolakisa pe ndenge Nzambe akataka makambo, pamba té mokonzi ya mokili oyo asi'azwi etumbu na ye.
[12] “Nazali lisusu na makambo ebele ya koyebisa bino, kasi ekoleka mingi po na bino sik'oyo.
[13] Molimo alingi áya; ye nde moto ayebi makambo nyonso oyo Nzambe azali kolakisa, bongo akoyebisa bino makambo nyonso ya solo. Akoloba na kombo na ye moko té, kasi akoloba bobele makambo oyo ye ayokaki, pe akoyebisa bino makambo ekoya.
[14] Ye akokumisa ngai, pamba té akozwa makambo nyonso epai na ngai pe akoyebisa bino yango.
[15] Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali pe ya ngai. Yango wana nalobi 'tè Molimo akozwa makambo nyonso epai na ngai, bongo akoyebisa bino yango.”
[16] “Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa-tango bokomona ngai lisusu.”
[17] Bayekoli mosusu babandi kotunana: “Likambo wana elingi koloba nini? Azali koloba na biso: ‘Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa-tango bokomona ngai lisusu.’ Pe ‘Nazali kokende epai ya Tata.’
[18] ‘Mwa tango' elingi koloba nini? Toyebi tina ya maloba na ye té.”
[19] Yezu ayebaki 'tè balingi kotuna ye, yango wana alobi na bango: “Nalobaki na bino: ‘Etikali moke bokomona ngai lisusu té, bongo sima ya mwa-tango bokomona ngai lisusu.’ Bozali kotunana po na maloba wana?
[20] Nazali koloba na bino, ya solo: bino bokolela pe bokozala na mawa, kasi bato ya mokili bakosepela. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
[21] Soki mwasi alingi kobota, ayokaka mawa po tango ya pasi ekoki; kasi soki asi'aboti, akanisaka lisusu pasi yango té; azalaka na esengo po moto abotami.
[22] Bino pe ndenge moko; sik'oyo bozali na mawa, kasi nakoya kotala bino lisusu, pe mitema na bino ekotonda na esengo; ata moto moko té akokoka kolongola bino yango.
[23] “Mokolo wana bokotuna ngai lisusu ata likambo moko té. Nazali koloba na bino, ya solo: Tata akopesa bino makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai.
[24] Tii lelo, nanu bosengi eloko moko té na kombo na ngai. Bósenga pe bokozwa yango; bongo bokotonda na esengo.”
[25] “Nazalaki koloba na bino makambo nyonso wana se na masapo. Na tango ekoya nakoloba na bino lisusu na masapo té, kasi nakobanda koyebisa bino polele makambo ya Tata.
[26] Na eleko wana bokosenga makambo nyonso na kombo na ngai. Nalobi té 'tè ngai moto nakosengela bino yango na Tata,
[27] pamba té Tata ye moko alingaka bino. Alingaka bino po bino bolingi ngai, pe bondimi 'tè ngai nautá epai ya Nzambe.
[28] Ya solo, nautá epai ya Tata. Nayaki awa na mokili; sik'oyo nazali kotika mokili oyo po názonga epai ya Tata.”
[29] Bayekoli na ye bazongisi: “Omoni, sik'oyo okómi koloba na biso polele pe otiki masapo.
[30] Sik'oyo toyebi 'tè oyebi makambo nyonso, bongo tina ezali té po moto átuna yo lisusu. Yango wana tondimi 'tè outá epai ya Nzambe.”
[31] Yezu alobi na bango: “Sik'oyo bondimi?
[32] Tango ezali koya, pe esi'ekómi, oyo bokopanzana bipai na bipai, moto na moto na nzela na ye, bongo bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko té, po Tata azalaka ná ngai.
[33] Nalobi na bino makambo oyo nyonso po bózala na boboto, lisanga na ngai. Bokomona pasi mingi awa na mokili. Kasi bótia molende. Ngai nasi'nalongi mabe ya mokili.”