[1] Na tango wana ba-Farizé bayoki 'tè Yezu azalaki kozwa bayekoli ebele koleka Yoane, pe abandaki kobatisa bato mingi.
[2] Nzokande Yezu ye moko azalaki kobatisa bato té, kaka bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa.
[3] Tango Yezu ayoki makambo babandaki koloba po na ye, alongwe na rejion ya Yudea pe azongi na Galilé.
[4] Po na kokende kuna, asengelaki kokatisa rejion ya Samarie.
[5] Yezu akómi na mboka moko ya Samarie, kombo na yango Sikar; ezali penepene ya elanga oyo Jakob apesaká na Mwana na ye Jozef.
[6] Libulu moko ya mai ezalaki wana, babengaka yango libulu ya Jakob. Yezu alembaki na nzela, bongo afandi pembeni ya libulu yango. Ezalaki penepene na midi.
[7] Awa bayekoli na ye bakendeki na Sikar kosomba biloko ya kolia, mwasi moko ya Samarie ayei kotóka mai. Yezu alobi na ye: “Pesa ngai mai námela.”
[9] Kasi mwasi yango azongiseli ye: “Yango boni? Yo ozali Moyuda; ngai nazali moto ya Samarie. Ndenge nini ozali kosenga ngai mai?” (Pamba té, Bayuda ná bato ya Samarie bazalaki koyokana té.)
[10] Yezu alobi na ye: “Soki oyebaki likabo oyo Nzambe apesaka na bato pe soki oyebaki nani oyo azali kosenga yo mai, mbele yo moto olingaki kosenga ye mai ya komela, bongo alingaki kopesa yo mai ya bomoi.”
[11] Mwasi alobi na ye: “Tata, ozali na katini té, pe libulu ezali molai penza. Ndenge nini okoki kozwa mai ya bomoi?
[12] Ezali koko na biso Jakob moto atikelá biso libulu ya mai oyo; ye moko kutu amelaká mai ya libulu oyo, ná bana na ye pe banyama na ye. Yo okanisi oleki ye?”
[13] Yezu azongiseli ye: “Soki moto ameli mai oyo, akoyoka lisusu posa ya mai;
[14] kasi soki ameli mai oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mai té. Pamba té mai oyo ngai nakopesa ye, ekobanda kobimela ye tango nyonso; yango nde ekopesa ye bomoi ya seko.”
[15] Mwasi alobi na ye: “Tata, pesa ngai mai yango po náyokaka lisusu posa ya mai té, pe náyaka lisusu kotóka mai awa té.”
[16] Yezu azongiseli ye: “Kende kobenga mobali na yo, bongo óya na ye awa.”
[17] Mwasi azongisi: “Nazali na mobali té.” Yezu alobi na ye: “Olobi malamu 'tè: Nazali na mobali té.
[18] Pamba té, ozalaki na mibali mitano, bongo oyo azali na yo sik'oyo, azali mobali na yo penza té. Olobi makambo ya solo.”
[19] Mwasi azongiseli Yezu: “Mokonzi, namoni 'tè ozali profete.
[20] Bakoko na biso ya Samarie bazalaká kosambela Nzambe na ngomba oyo, kasi bino Bayuda bolobaka 'tè basengeli kosambela Nzambe kaka na Yeruzalem.”
[21] Yezu alobi na ye: “Mama, ndimela ngai, tango ekómi penepene, oyo bakosambela Tata bobele na ngomba ya Samarie té to na Yeruzalem.
[22] Bino bato ya Samarie bosambelaka Nzambe, kasi boyebi ye té; biso Bayuda toyebi Nzambe oyo tosambelaka, pamba té nzela ya kobika euti na Bayuda.
[23] Kasi tango ekoya, yango pe esi'ekoki, oyo basambeli ya solo bakosambela Tata na kati ya motema pe na ndenge ya solo; pamba té Tata alingaka baoyo basambelaka ye ndenge wana.
[24] Nzambe azali Molimo; pe bato oyo basambelaka ye, esengeli básambela ye na kati ya motema pe na ndenge ya solo.”
[25] Mwasi alobi na ye: “Nayebi 'tè Mesia akoya (oyo babengaka Kristo). Tango ye akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.”
[26] Yezu azongiseli ye: “Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Mesia.”
[27] Na tango wana bayekoli ya Yezu bazongi, bakuti ye azali kosolola ná mwasi, bakamwaki mingi penza. Kasi ata moto moko té atunaki Yezu soki azali koluka nini, to po na nini azali kosolola na ye.
[28] Mwasi atiki elokú na ye wana, pe akei kobenga bato; alobi na bango:
[29] “Bóya kotala moto moko azali kuna, ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Ye akoki kozala Mesia té?”
[30] Bato basimbi nzela, babandi kokende esika Yezu azalaki.
[31] Na tango wana bayekoli babondeli Yezu balobi: “Moteyi, lia ko!”
[32] Kasi Yezu azongiseli bango: “Ngai nazali na biloko ya kolia oyo bino boyebi té.”
[33] Bayekoli bamitunani: “Moto mosusu ayeelaki ye biloko ya kolia?”
[34] Yezu alobi na bango: “Bilei na ngai ezali: Kotosa makambo Moto oyo atindaki ngai alingaka, pe kosilisa mosala na ye.
[35] Bino bolobaka: Soki moto akoni mbuma, esengeli kosala sanza minei po na kobuka yango. Kasi ngai nalobi na bino: Bótala bilanga. Mbuma esi'eteli, ekoki na kobuka.
[36] Moto abuki mbuma yango asi'azwi lifuta na ye; abombi mbuma po na bomoi ya seko; yango wana moto oyo akoni ná oyo abuki, bazali kosepela esika moko.
[37] Pamba té balobá ya solo boye: ‘Moko akonaka, mosusu abukaka.’
[38] Natindaki bino bókende kobuka mbuma na elanga oyo bino bokonaki té; bato mosusu bamonaki pasi, pe bino bozwi bolamu po na pasi na bango.”
[39] Tango mwasi alobaki na bato ya mboka yango 'tè: “Yezu ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki,” bato mingi bandimi Yezu,
[40] bongo bayei epai na ye pe babondeli ye po átikala ná bango; yango wana Yezu atikalaki kuna mikolo mibale.
[41] Bato mosusu mingi bayei kondima Yezu po na makambo oyo ye moko azalaki koloba.
[42] Balobi na mwasi wana: “Sik'oyo tondimi kaka po na maloba na yo té, pamba té biso moko toyoki ye, pe toyebi 'tè azali ya solo Mobikisi ya bato.”
[43] Sima ya mikolo mibale, Yezu alongwe wana, akei na Galilé.
[44] Pamba té mokolo mosusu Yezu ye moko alobaki: “Profete, bapesaka ye lokumu té na mboka na ye.”
[45] Tango akómaki na Galilé, bato nyonso bayambaki ye malamu, pamba té bango pe bakendeki na feti ya Koleka na Yeruzalem, pe bamonaki makambo nyonso ye asalaki na feti yango.
[46] Bongo Yezu azongi na mboka Kana na Galilé, epai abongolaki mai vinu. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kafarnaum, mwana na ye azalaki na pasi.
[47] Tango ayoki 'tè Yezu alongwe na Yudea pe akómi na Galilé, akei kotala ye, pe abondeli ye áya kobikisa mwana na ye azalaki kobunda na liwa.
[48] Yezu alobi na ye: “Bino bondimaka bobele soki bomoni bilembo to makamwisi.”
[49] Mokonzi wana ya leta azongiseli ye: “Mokonzi, yaka tókende, liboso 'tè mwana na ngai ákufa.”
[50] Yezu alobi na ye: “Kende, mwana na yo asi'abiki.” Moto wana andimi maloba ya Yezu, pe azongi na ndako na ye.
[51] Na nzela akutani ná basali na ye; bango bayebisi ye: “Mwana na yo asi'abiki!”
[52] Atuni bango: “Tango nini mwana ayokaki malamu?” Bazongiseli ye: “Fievre esilaki lobi na ngonga ya liboso sima ya midi.”
[53] Bongo tata ya mwana ayei koyeba 'tè ezalaki nde na tango Yezu alobaki na ye: “Mwana na yo asi'abiki.” Yango wana ye ná bato nyonso ya ndako na ye bandimaki Yezu.
[54] Oyo ezali likamwisi ya mibale ya Yezu. Asalaki yango tango alongwaki na Yudea po na kozonga na Galilé.