[1] Sima na yango, Pilate atindi bákamata Yezu pe bábeta ye fimbu.
[2] Basoda bakamati nzube, basali na yango ekoti lokola ya bakonzi, bongo batie ye yango na motú. Balatisi ye kazaka moko ya motane.
[3] Bazalaki koya koloba na ye: “Mbote, mokonzi ya Bayuda!” Pe bazalaki kobeta ye bambata.
[4] Pilate abimi lisusu na libanda, pe alobi na bato wana: “Namemeli bino moto oyo, po bóyeba 'tè namoni tina moko té ya kokatela ye etumbu.”
[5] Yezu pe abimi; alataki ekoti ya nzube pe kazaka ya motane. Bongo Pilate alobi na bango: “Bótala moto yango!”
[6] Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe ná bakengeli bamoni ye, bagangi: “Boma ye na kuruze! Boma ye na kuruze!” Pilate alobi na bango: “Bino moko bókamata ye pe bóboma ye na kuruze! Ngai namoni tina moko té ya kokatela moto oyo etumbu.”
[7] Bayuda balobi: “Biso tozali na Mibeko, pe Mibeko yango ezali kotinda 'tè moto oyo ákufa, pamba té alobaki 'tè azali Mwana ya Nzambe.”
[8] Awa Pilate ayoki makambo wana, abangi lisusu mingi.
[9] Azongi na ndako pe atuni Yezu: “Yo, outi wapi?” Kasi Yezu azongiseli ye liloba té.
[10] Pilate alobi na ye: “Boni? Olingi kolobela ngai té? Oyebi té 'tè ngai nazali na bokonzi ya kotika yo, to pe ya kobomisa yo na kuruze?”
[11] Yezu azongiseli ye: “Soki Nzambe ápesaka yo bokonzi yango té, olingaki kokoka kosala ngai ata eloko moko té. Yango wana moto oyo ayaki kopesa ngai na maboko na yo, lisumu na ye eleki ya yo.”
[12] Tango Pilate ayoki makambo wana, abandi koluka nzela po átika Yezu. Kasi Bayuda babandi lisusu koganga makasi: “Soki otiki ye, ozali moninga ya mokonzi monene ya Rome té. Pamba té moto nyonso oyo amitie mokonzi, azali monguna ya mokonzi monene ya Rome.”
[13] Tango Pilate ayoki makambo wana, abimisi Yezu na libanda pe akei kofanda na kiti oyo akatelaka makambo na esika oyo babengaka yango “Esika batandá mabanga,” pe na monoko ya Bayuda “Gabata.”
[14] Ezalaki penepene ya midi, mokolo ya kolengela feti ya Koleka; Pilate alobi na Bayuda: “Mokonzi na bino ye oyo!”
[15] Kasi bango nyonso bagangi makasi: “Boma ye! Boma ye! Boma ye na kuruze!” Pilate atuni bango: “Bolingi náboma mokonzi na bino na kuruze?” Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisi: “Biso tozali na mokonzi mosusu té, bobele mokonzi monene ya Rome.”
[16] Bongo Pilate apesi bango Yezu po báboma ye na kuruze. Basoda bakamati Yezu.
[17] Ye moko amemi kuruze na ye, abimi na mboka po na kokende na esika moko kombo 'tè: “Mokuwa ya Motú” (na monoko ya Bayuda “Golgota”).
[18] Kuna nde esika basoda batiaki Yezu na kuruze, ná bato mibale, mosusu na liboko na ye ya mobali, mosusu na liboko na ye ya mwasi, bongo Yezu na kati.
[19] Pilate atindaki 'tè básala mwa-libaya pe bátia yango na kuruze ya Yezu. Bakòmaki na libaya yango boye: “Yezu ya Nazaret, mokonzi ya Bayuda.”
[20] Bayuda mingi batangaki yango, pamba té esika oyo batiaki Yezu na kuruze ezali penepene ya mboka. Bakòmaki makambo yango na minoko misato: ya Bayuda, ya bato ya Rome, pe ya ba-Grek.
[21] Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ya Bayuda balobi na Pilate: “Kokòma té ‘Mokonzi ya Bayuda'; kasi kòma boye: ‘Moto oyo alobi, nazali mokonzi ya Bayuda.’”
[22] Kasi Pilate azongiseli bango: “Oyo ngai nakòmi, nasi'nakòmi.”
[23] Tango basoda basilisi kotia Yezu na kuruze, bakamati bilamba na ye, bakaboli yango na bandambo minei, soda moko moko ná ndambo na ye. Bakamati pe nzambala na ye; nzambala wana batòngá yango na biteni té, kasi basalá yango kaka mobimba banda likolo tii na se.
[24] Basoda balobanaki: “Tópasola yango té kasi tóbeta zeke, bongo tótala soki nani akozwa yango.” Esalamaki bobele ndenge ekòmamá na Mikanda ya Nzambe: “Bakabolaki bilamba na ngai; babetaki zeke po na nzambala na ngai.” Basoda basalaki kaka ndenge wana.
[25] Mama ya Yezu atelemaki pembeni ya kuruze ya Yezu, ná ndeko ya mama na ye ya mwasi, ná Maria mwasi ya Klopas, pe Maria ya mboka Magdala.
[26] Awa Yezu amoni mama na ye, pe pembeni na ye moyekoli oyo ye azalaki kolinga, alobi na mama na ye: “Mama, tala Mwana na yo.”
[27] Pe alobi na moyekoli: “Tala mama na yo.” Banda mokolo wana, moyekoli yango akamati mama ya Yezu epai na ye.
[28] Sima na yango, lokola Yezu ayebaki 'tè asilisi nyonso oyo esengelaki kosalama, bongo po na kokokisa makambo oyo ekòmamá na Mikanda alobi: “Nazali na posa ya mai.”
[29] Elokú moko ezalaki wana, etondá na vinu ya ngayi. Basoda bakotisi linuka na vinu ya ngayi, bakangi yango na mwa-nzete ya izope, pe batomboli yango tii na monoko ya Yezu.
[30] Tango Yezu asilisi komela vinu ya ngayi, alobi: “Makambo nyonso ekoki.” Alalisi motú pe akati motema.
[31] Nzokande bakonzi ya Bayuda bakei kosenga Pilate boye: “Tinda bákende kobuka makolo ya bato oyo bazali na kuruze, pe bálongola bango.” Pamba té ezalaki pokwa ya kolengela Mokolo ya Kopema, pe mokolo yango ezalaki feti monene; boye Bayuda balingaki té bibembe étikala na kuruze.
[32] Bongo basoda bayei epai ya bato mibale wana batiaki na kuruze esika moko ná Yezu, pe babuki bango makolo.
[33] Tango bakómi epai ya Yezu, bamoni 'tè asi'akufi; yango wana babukaki ye makolo té.
[34] Kasi soda moko atoboli mopanzi ya Yezu na likonga, pe na mbala moko makila ná mai ebimi.
[35] Moto amonaki makambo oyo, ye nde moto azali koyebisa yango. Azali koyebisa ya solo. Ye moko, ayebi 'tè azali koloba ya solo, po bino pe bóndima.
[36] Yango esalamaki bongo po na kokokisa makambo ekòmamá na Mikanda: “Bakobuka ye ata mokuwa moko té.”
[37] Epai mosusu bakòmá boye: “Bakotala moto oyo batoboli mopanzi.”
[38] Sima na yango, Jozef ya mboka Arimaté akei kosenga na Pilate nzela po álongola ebembe ya Yezu na kuruze. Ye azalaki moyekoli ya Yezu, kasi azalaki komimonisa té po abandaki kobanga Bayuda. Pilate apesi nzela, bongo Jozef ayei kolongola ebembe ya Yezu.
[39] Nikodeme, oyo akendeki mokolo moko kotala Yezu na butu, ye pe ayei. Amemaki mafuta ya mire basangisá ná aloes, ezalaki na bakilo soki tuku misato (30).
[40] Bango mibale bakamati ebembe ya Yezu, pe balíngi yango na bilamba ya mike-mike oyo batiaki mafuta wana, ndenge Bayuda basalaka tango bakundaka bato.
[41] Elanga moko ezalaki penepene ya esika babomaki Yezu, pe kuna libulu moko ya sika ezalaki, oyo basalá na kati ya mabanga, nanu bakundelá moto moko té.
[42] Lokola ezalaki mokolo ya kolengela Mokolo ya Kopema po na Bayuda, batie nzoto ya Yezu na libulu wana, pamba té yango ezalaki penepene.