[1] Nasengi bino po na Febe, ndeko na biso ya mwasi, mosalisi ya Eklezya na vile ya Sankré:
[2] bóyamba ye malamu na kombo ya Nkolo Yezu, ndenge bato ya Nzambe bayambaka bato; pe bósalisa ye na makambo nyonso oyo akosenga bino. Pamba té ye asalisaki bato mingi, ná ngai moko pe.
[3] Bópesa mbote na Prisiye ná Akilas oyo basalelaka Kristo Yezu lokola ngai.
[4] Bango babikisaki ngai, babangaki kutu liwa té. Nazali kopesa bango mersi mingi; ezali bobele ngai moko té, kasi ná ba-Eklezya nyonso oyo ezali ya Bayuda té.
[5] Bópesa pe mbote na Eklezya oyo esanganaka na ndako na bango. Bópesa mbote na Epenete, moninga na ngai penza. Ye azalaki moto ya liboso ya kondimela Kristo na rejion ya Azie.
[6] Bópesa mbote na Maria; ye asalaki mosala mingi po na bino.
[7] Bópesa mbote na Andronikus ná Junias, bandeko na ngai Bayuda; bango bazalaki na boloko esika moko ná ngai; bayebani mingi, pe basalaka mosala lokola ya bantoma; bango bandimelaki Kristo liboso na ngai.
[8] Bópesa mbote na Ampliatus, moninga na ngai, na lisanga ya Nkolo.
[9] Bópesa mbote na Urbanus, ye asalelaka Kristo lokola biso; pe lisusu na moninga na ngai ya bolingo Stakis.
[10] Bópesa mbote na Apeles, ye alakisaki 'tè azali moto ya Kristo penza. Bópesa mbote na bato bafandaka epai ya Aristobule.
[11] Bópesa mbote na Erodion, ndeko na ngai Moyuda, pe ná bandimi oyo bafandaka epai ya Narsise.
[12] Bópesa mbote na bandeko na biso ya basi Trifene, Trifoze, ná Persis, ndeko na ngai ya bolingo; bango nyonso basalelaka Nkolo mosala monene.
[13] Bópesa mbote na Rufus, mosali ya Nkolo penza; pe na mama na ye, oyo azali lokola mama na ngai.
[14] Bópesa mbote na Asenkrite, Flegon, Ermes, Patrobas, Ermas, pe bandeko mosusu oyo bazali epai na bango.
[15] Bópesa mbote na Filológe, Julie, Neré ná ndeko na ye ya mwasi, pe Olempas ná bato nyonso ya Nzambe oyo bazali epai na bango.
[16] Bino nyonso bópesana mbote, bóyambana ndenge ebongi na bato ya Nzambe. Bato ya ba-Eklezya nyonso ya Kristo batindeli bino mbote.
[17] Bandeko, nazali kosenga bino: bókeba na baoyo bakabolaka bato pe babebisaka bondimi ya baninga. Bazali koboya mateya oyo bozwaki. Bókima bango.
[18] Pamba té bato ya ndenge wana basalelaka Nkolo na biso Kristo té, kasi bobele libumu na bango. Na maloba na bango ya sukali pe ya lokuta, bakosaka bato oyo bazali na mitema pembe.
[19] Bato nyonso bayebi ndenge bino bozali kotosa Nzambe; ya solo, nazali kosepela mingi po na bino. Kasi nalingi 'tè bózala na mayele mingi ya kosala makambo ya malamu, pe bóboya makambo ya mabe.
[20] Etikali moke Nzambe oyo apesaka boboto ápanza Satan na se ya makolo na bino. Bolamu ya Nkolo na biso Yezu ézala na bino!
[21] Timoté, moninga na ngai ya mosala, atindeli bino mbote. Lusius, Jazon ná Sozipater, bandeko na ngai Bayuda, batindeli bino pe mbote.
[22] Ngai Tersius natindeli bino mbote na lisanga na Nkolo; ezali ngai nde moto nakòmi mokanda oyo.
[23] Gayus atindeli bino mbote; nazali kofanda na ndako na ye. Bato ya Eklezya pe basanganaka epai na ye; bango pe batindeli bino mbote. Eraste, oyo abombaka mbongo ya vile, ná ndeko Kwartus batindeli bino mbote.
[24] [Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino nyonso! Amen.]
[25] Lokumu ézala na Nzambe! Ye azali na nguya ya kobongisa bino, awa bondimi Sango Malamu ya Yezu Kristo oyo ngai nasakolaka. Pamba té yango ezali koyebisa bato sekelé oyo ebombamaká na bileko eleká.
[26] Sik'oyo Nzambe, Mokonzi ya bileko nyonso, alakisi sekelé yango polele, ndenge ekòmamá na mikanda ya baprofete; pe atindi báyebisa yango na bato ya bikolo nyonso, po bándima yango pe bátosa ye.
[27] Bobele se ye moko Nzambe moto azali na mayele nyonso! Ebongi ye ázwa lokumu, po na Yezu Kristo, seko na seko. Amen.