[1] Bongo Bayuda baleki bato mosusu na nini? Kokatisa nzoto ezali nde na tina?
[2] Ya solo, ezali na tina mingi penza. Likambo eleki, yango oyo: Nzambe apesaká bango maloba na ye, atiaká motema epai na bango.
[3] Kasi boni? Awa bato mosusu na kati na bango batikaki kotia mitema na Nzambe, bongo Nzambe pe akotika kotia motema epai ya Bayuda?
[4] Ata moke té! Atako bato nyonso bamonani lokuta; kasi Nzambe asengeli komonana moto ya solo. Pamba té ekòmamá boye: “Makambo yo olobaka elakisaka 'tè ozali bosembo; bongo soki basambisi yo, osengeli kolonga.”
[5] Boye, mabe oyo biso tosalaka ezali kolakisa 'tè Nzambe azali moto ya bosembo. Bongo tóloba nini? Nazali kotuna kaka ndenge bato batunaka: “Nzambe azangi bosembo po apesaka biso etumbu?”
[6] Ata moke té! Pamba té soki Nzambe azangi bosembo, ndenge nini akosambisa bato nyonso?
[7] Kasi soki lokuta na ngai epesaka Nzambe lokumu, pe emonisaka penza 'tè ye azali moto ya solo, po na nini asengeli kopesa ngai etumbu lokola moto ya masumu?
[8] Soki tokanisi ndenge wana, tokobanda kutu kosala mabe, po mabe yango ésuka malamu. Bato mosusu batóngaka ngai 'tè ngai moto nalobaka bongo. Bato yango bakozwa etumbu oyo ekoki na bango.
[9] Yango boni? Biso Bayuda toleki nde bato mosusu? Ata moke té! Nauti kolakisa 'tè bato nyonso bazali baumbu ya masumu, ézala Bayuda, to bato ya bikolo mosusu.
[10] Pamba té ekòmamá boye: “Ata moto moko té azali bosembo;
[11] ata moko té azali na mayele; ata moko té alukaka Nzambe.
[12] Bato nyonso bapesi Nzambe mikongo, babebá ndenge moko; ata moto moko té asalaka malamu.
[13] Maloba na bango ememelaka bato liwa; balukaka tango nyonso kokosa bato. Minoko na bango ebimisaka ngenge ya nyoka;
[14] babimisaka maloba ya masumá pe ya lokuta.
[15] Bakendeke mbangu po na koboma bato;
[16] babebisaka bato pe bayokisaka bango pasi.
[17] Bayebi nzela ya boboto té;
[18] babangaka Nzambe ata moke té.”
[19] Makambo wana ekòmamá na Mikanda ya Nzambe; bongo toyebi 'tè yango etali baoyo basengeli kotosa Mibeko. Boye moto moko té akoki komilongisa; ya solo, bato nyonso bamemi ngambo na miso ya Nzambe.
[20] Yango wana moto moko té akómaka bosembo po atosaka Mibeko. Pamba té Mibeko ezali bobele kolakisa bato 'tè bazali kosala masumu.
[21] Kasi sik'oyo Nzambe alakisi bosembo na ye, ndenge alakaká na mikanda ya Mibeko pe ya baprofete. Atie Mibeko pembeni; asaleli bosembo na ye epai ya bato nyonso oyo bazali kotia mitema na Yezu Kristo. Atali bobele bondimi na bango, pamba té bato nyonso bazali ndenge moko:
[23] bato nyonso basali masumu pe bazangi nkembo ya Nzambe na kati na bango.
[24] Kasi Nzambe akómisaka bango bosembo bobele po na bolamu na ye, po Kristo Yezu azweli bango bonsomi.
[25] Pamba té tango babomaki ye na kuruze, ezali Nzambe moto alakisaki bosembo na ye po ázweela baoyo bandimeli ye bolimbisi, na makila na ye moko. Na tango ya kala, akatelaki bato etumbu po na masumu té;
[26] azalaki kokanga motema. Sik'oyo alakisi bosembo na ye, po ámimonisa moto ya bosembo, pe ákómisa baoyo bandimeli Yezu bato ya bosembo.
[27] Boye nani moto akoki kobeta tolo? Ata moko té! Po na nini? Bato mosusu bakanisi 'tè bakoki kobeta tolo po batosaka Mibeko; nzokande biso tozali kaka kolanda nzela ya bondimi,
[28] toyebi 'tè moto akómaka bosembo té po atosaka Mibeko, kasi bobele po na bondimi na ye.
[29] Bókanisa nanu. Nzambe azali bobele ya Bayuda? Azali Nzambe ya bikolo nyonso té? Tembe ezali té: azali pe Nzambe ya bikolo nyonso.
[30] Pamba té, Nzambe azali se moko. Azali kokómisa Bayuda bosembo po na bondimi na bango; azali kosala pe ndenge moko na bato ya bikolo mosusu.
[31] Boye, awa tokómi na bondimi, tozali komona Mibeko eloko ya pamba? Ata moke té! Kasi tozali kolakisa tina penza ya Mibeko.