[1] Moto nyonso asengeli kotosa bakonzi ya leta, pamba té bokonzi nyonso eutaka na Nzambe; pe bakonzi nyonso ezali Nzambe moto atiaki bango.
[2] Yango wana, moto oyo aboyi kotosa bakonzi, azali koboya makambo Nzambe atindi, boye azali komilukela etumbu.
[3] Nzokande bato oyo basalaka makambo ya malamu bakoki kobanga bakonzi té, kasi bobele baoyo basalaka makambo ya mabe. Olingi kobanga bango té? Sala bobele makambo ya malamu, bongo bakokumisa yo.
[4] Pamba té bakonzi bazali basali ya Nzambe po na bolamu ya bato. Boye soki osalaka mabe, banga bango; po bazali na bokonzi ya kopesa bato etumbu. Bazali basali ya Nzambe po na kolakisa kanda na ye epai ya baoyo basalaka mabe.
[5] Boye bosengeli kotosa bakonzi ya leta. Bóbanga kaka kanda ya Nzambe té kasi bótosa bango po se ya motema na bino ezali kotinda boye.
[6] Yango wana pe bofutaka mpaku, po bato oyo bakokisaka misala ya leta bazali kosalela Nzambe.
[7] Bongo bópesa moto na moto oyo ekoki na ye: bófutaka mpaku nyonso na baoyo bafutisaka yango; bótosaka baoyo esengeli kotosa bango, bópesa lokumu na baoyo esengeli kopesa lokumu.
[8] Bózala na nyongo ya moto moko té. Bobele nyongo moko kaka bosengeli kozala na yango: bólinganaka. Moto oyo alingaka baninga, azali kotosa penza Mibeko.
[9] Pamba té ekòmamá na Mibeko boye: “Kotambola té na mwasi to mobali ya bato; koboma moto té; koyiba té; kolula eloko ya moninga té.” Mibeko oyo pe Mibeko mosusu nyonso ekoti bobele na mobeko moko: “Linga moninga na yo, ndenge yo moko omilingaka.”
[10] Moto oyo alingaka moninga na ye, akoki kosala ye mabe té; yango wana oyo alingaka moninga azali kotosa Mibeko nyonso.
[11] Boyebi 'tè tango oyo ezali na tina penza. Ngonga ya kolamuka na pongi esi'ekoki. Pamba té mokolo Nzambe akobikisa biso ekómi sik'oyo penepene, koleka tango oyo tobandaki kondima.
[12] Etikali moke butu ésila pe tongo étana. Bongo tótika makambo ya mabe oyo esalamaka na butu, pe tósala makambo ya malamu oyo ekoki na moi.
[13] Tózala na bizaleli ya malamu oyo ebongi na tango ya moi; tótika lokoso pe kolangwa masanga; tóboya kindumba ná makambo ya soni; tóswana té pe tóyokela baninga zuwa té.
[14] Kasi bómilakisa lokola bato ya Nkolo Yezu Kristo, pe bótika kosepelisa baposa ya bomoto na bino.