Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:49

[1] Makambo nazali kokòma ezali ya solo; Kristo ayebi 'tè nazali koloba lokuta té. Se ya motema na ngai ezali koyebisa yango, ndenge Molimo Mosantu azali kolakisa ngai yango:

[2] Ya solo, natondi penza na mawa, pe nazali koyoka motema pasi mingi,

[3] likolo ya bandeko na ngai Bayuda, oyo tobotamá na bango ekolo moko. Nakokaki kolinga kutu 'tè Nzambe ábwakela ngai lisumá pe ákabola ngai na Kristo na esika na bango.

[4] Bazali bato ya Israel, ekolo oyo Nzambe aponaká lokola bana na ye; Nzambe apesaká bango lokumu na ye, asalaká ná bango boyokani ndenge na ndenge, ayebisaká bango Mibeko na ye pe ndenge basengeli kosambela, pe apesaká bango bilaka minene.

[5] Bazali bana ya Abraham, Izaak pe Jakob; Kristo abotamaki na ekolo na bango. Lokumu ézala na Nzambe seko! Ye azali Mokonzi ya biloko nyonso. Amen.

[6] Nzokande elaka ya Nzambe ekei pamba té. Kasi ba-Israelite nyonso té bato bazali bato oyo Nzambe aponá.

[7] Pe ata babotami na libota ya Abraham, bango nyonso té bato bazali bana ya solo, pamba té Nzambe alobaká na Abraham boye: “Nakobanda kobenga bobele bana ya libota ya Izaak nde bana na yo.”

[8] Elakisi 'tè: bana oyo Abraham abotaki, bango nyonso té bato bazali bana ya Nzambe. Kasi Nzambe akamataki lokola bana ya solo bobele baoyo babotamaki po na elaka na ye.

[9] Pamba té Nzambe apesaká Abraham elaka boye: “Mbula ekoya, nakozonga lisusu kaka na eleko oyo pe Sara akozala na Mwana ya mobali.”

[10] Ezalaká ndenge moko, tango Rebeka abotaki mapasa: bazalaki bana ya tata moko, koko na biso Izaak.

[11] Nzokande liboso 'tè bábotama, atako basalaki nanu likambo moko té ya malamu to ya mabe, Nzambe alobaká na Rebeka: “Kulutu akozala mosali ya leki.” Alobaká bongo po na kolakisa 'tè ye aponaka bobele ndenge ye moko alingi; alukaka bobele baoyo ye moko abengi, atalaka misala na bango té.

[13] Ekòmamá boye: “Nalingi Jakob koleka Ezau.”

[14] Bongo tóloba nini? Nzambe azangi bosembo? Ata moke té!

[15] Pamba té alobaká na Moize boye: “Moto oyo nalingi koyokela ye mawa, nakoyokela ye mawa; moto oyo nalingi kopesa ye bolamu, nakopesa ye bolamu.”

[16] Ezali té po moto yango alingi to asali makasi; ezali bobele po Nzambe ayokeli ye mawa.

[17] Ekòmamá 'tè Nzambe alobaki boye na mokonzi monene ya Ejipte: “Natie yo mokonzi bobele po nálakisa nguya na ngai, pe bato báyeba lokumu na ngai na mokili mobimba.”

[18] Yango wana, Nzambe soki alingi, ayokeli moto mawa; pe soki alingi, akómisi moto motú makasi.

[19] Mbala mosusu moto akoki kotuna ngai boye: “Soki ezali bongo, po na nini Nzambe asilikelaka bato? Pamba té nani akoki koboya makambo Nzambe alingi?”

[20] Kasi yo moto, ozali nani po na kotia tembe ná Nzambe? Nani asi'amoná nzungu ya mabelé etuni moto oyo asalaki yango: “Po na nini osalaki ngai boye?”

[21] Moto oyo asalaka banzungu ya mabelé akoki kosalela mabelé ndenge alingi. Akoki kokamata ndambo moko ya mabelé po na kosala banzungu mibale: moko ya talo, mosusu ya pamba. Boye té?

[22] Toyebi 'tè Nzambe alingaki kolakisa kanda na ye pe komonisa bato nguya na ye. Nzokande azalaki kaka kokanga motema po na baoyo basengelaki kozwa etumbu pe kobunga.

[23] Na ndenge wana pe amonisi lokumu na ye oyo eleki ndelo. Pamba té ayokeli bato mosusu mawa, aponaki bango po ákabela bango lokumu na ye.

[24] Ezali nde biso bato oyo ye abengi; touti kaka na ekolo ya Bayuda té, kasi pe na bikolo mosusu.

[25] Alobaká boye na monoko ya profete Ozé: “Liboso bazalaki ekolo na ngai té; sik'oyo nabengi bango ekolo na ngai. Liboso nazalaki kolinga bango té; sik'oyo nabengi bango bato na ngai ya bolingo.

[26] Nalobaki na bango 'tè: ‘Bino bozali bato na ngai té'; sik'oyo bakobanda kobenga bango bana ya Nzambe ya bomoi.”

[27] Ezaya pe alobaká boye po na bato ya Israel: “Ata bato ya Israel bakómi ebele lokola mbuma ya zelo na libongo ya ebale, bobele mwa-ndambo na bango nde bakobika.

[28] Pamba té etikali moke Nkolo ákokisa maloba na ye nyonso na mokili.”

[29] Ezaya alobaká lisusu boye: “Soki Nkolo ya nguya nyonso átikaka ndambo ya bato na biso té, mbele tokómi lokola vile ya Sodome; mbele tokokani na vile ya Gomore.”

[30] Bongo, tóloba nini? Tóloba boye: bato oyo bayebaki Nzambe té, Nzambe azali kokómisa bango bosembo na miso na ye, atako bazalaki koluka yango té. Bakómi bosembo na nzela ya bondimi.

[31] Nzokande bato ya Israel bazalaki koluka Mibeko oyo ekokaki kokómisa bango bosembo; kasi bakokaki kotosa Mibeko yango té.

[32] Po na nini? Ezali po bazalaki kolanda nzela ya bondimi té, kasi babandaki kotia mitema na misala na bango moko. Babetaki libaku na “libanga ya moselu.”

[33] Ekòmamá boye: “Bóyoka! Natie na mboka Sion moto moko, ye akozala lokola libanga ya moselu oyo ekobanda kokweisa bato. Kasi moto nyonso oyo atie motema epai na ye akoyoka soni ata moke té.”

Ba-Romén — Chapters