Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:06

[1] Bandeko, lokola Nzambe ayokeli biso mawa mingi penza, nazali kosenga bino boye: na bomoi na bino mobimba bómipesa epai na ye lokola mabonza oyo ezali ya kokufa té kasi ya bomoi, yango ezali ya Nzambe pe esepelisaka ye. Wana ezali losambo ya solo oyo bosengeli kosambela ye.

[2] Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té; kasi bótikela Nzambe nzela ya kopesa bino mayele ya sika, po bóbongwana, bókóma bato ya sika. Boye bokoki koyeba makambo Nzambe alingaka, makambo oyo ezali malamu, oyo esepelisaka ye, pe oyo ezali ya kokoka.

[3] Lokola Nzambe, na bolamu na ye, atie ngai ntoma, nazali kosenga bino 'tè moto nyonso átika lofundu, áluka bobele lokumu oyo ekoki na ye, ndenge Nzambe akabeli moto na moto bolamu oyo eutaka na bondimi.

[4] Nzoto na biso ezali na biteni ebele. Mosala oyo eteni moko moko esalaka, ezali ya ndenge moko té; nzokande nzoto ezali se moko.

[5] Bobele ndenge wana pe biso nyonso, na lisanga na Kristo, tozali lokola nzoto moko; moto na moto azali eteni na yango, esika moko ná bandeko na ye.

[6] Bongo Nzambe, na bolamu na ye, apesi biso makabo ya ndenge na ndenge. Soki ozwi likabo ya kosakola maloba euti na Molimo, sakola yango ndenge bondimi ezali kotinda.

[7] Moto na moto ámipesa na mosala oyo azwi: ézala ya kosalela bandimi mosusu, ya koteya bandeko to ya kolendisa bango. Moto oyo akabolaka biloko epai ya bato ya mawa, ásalaka yango na motema moko; moto oyo atambwisaka lisanga, átiaka molende nyonso; oyo asalisaka bato ya maladi, ásala yango na esengo.

[9] Bózalaka na bolingo ya solo. Bóboyaka makambo ya mabe, bólandaka oyo ya malamu.

[10] Bólinganaka na motema moko lokola bandeko: bótosanaka bino na bino, bóweelaka eloko mosusu té.

[11] Bósala makasi, bólemba té; bózwa nguya ya Molimo Mosantu po na kosalela Nkolo.

[12] Bótiaka mitema epai ya Nzambe pe bósambelaka ye, boye bózala na esengo tango nyonso; bókangaka mitema na tango ya pasi.

[13] Bókabolaka biloko na bino na bato ya Nzambe oyo bazali kokelela; pe bóyambaka malamu bapaya na bandako na bino.

[14] Bóbondelaka Nzambe po na bato oyo banyokolaka bino; bósambela po na bango kasi bóbwakela bango lisumá té.

[15] Bósepelaka esika moko ná bato oyo bazali na esengo; bólelaka esika moko ná baoyo bazali kolela.

[16] Bóyokanaka malamu; bózalaka lofundu té, kasi bóndima ata misala oyo ezangá lokumu. Bómikamata té lokola bato ya mayele.

[17] Soki moto asali bino mabe, kozongisela ye mabe té; kasi bóluka kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya bato nyonso.

[18] Bósalaka nyonso oyo bokoki, po bózala na boboto ná bato nyonso.

[19] Baninga na ngai ya bolingo, soki bato basali bino mabe, bino moko bózongisa mabe té, kasi bótikela Nzambe nzela ákatela bango etumbu. Pamba té ekòmamá boye: “Nkolo alobi: Ngai moto nakozongisela bango mabe, ngai nde moto nakopesa bango etumbu.”

[20] Pe ekòmamá lisusu boye: “Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye biloko ya kolia; soki azali na posa ya mai, pesa ye mai; pamba té tango osali bongo, nde oyokisi ye soni mingi.”

[21] Keba po makambo ya mabe ékweisa yo té, kasi sala makambo ya malamu po ólonga oyo ya mabe.

Ba-Romén — Chapters