[1] Biso bato tozali na bondimi ya makasi, tosengeli kokanisa bandeko oyo bazangi makasi yango. Tóluka bobele komisepelisa té,
[2] kasi moto na moto na kati na biso áluka kosepelisa baninga na ye, na ndenge 'tè ákolisa bondimi na bango.
[3] Pamba té Kristo pe azalaki koluka kaka komisepelisa té. Lokola ekòmamá boye: “Kofinga oyo bafingaka yo ezali koya epai na ngai.”
[4] Makambo nyonso oyo ekòmamá ezali po na koteya biso, po Mikanda ya Nzambe épesa biso mayele ya kokanga mitema pe kozala na molende, boye tókoka kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá biso.
[5] Bongo Nzambe, oyo alakisaka biso ndenge ya kokanga mitema pe kozala na molende, ye moko ásala 'tè bóyokana, ndenge Kristo Yezu alingi,
[6] po bino nyonso bókumisaka Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo, na motema moko, na mongongo moko.
[7] Yango wana bóyambana na bolingo nyonso, ndenge Kristo ayambaki bino po Nzambe ázwa lokumu.
[8] Bókanisa nanu. Kristo amitiaki mosali ya Bayuda po Nzambe moto alakaká bongo. Ayaki po ákokisa elaka oyo Nzambe apesaká na bakoko na bango.
[9] Nzokande bato oyo bazali Bayuda té basengeli kokumisa Nzambe, po ye ayokeli bango mawa. Ekòmamá boye: “Yango wana nazali kokumisa yo na kati ya bikolo, pe koyemba lokumu na yo.”
[10] Ekòmamá pe: “Bino bato ya bikolo, bósepela esika moko ná ekolo ya Nzambe.”
[11] Esika mosusu ekòmamá boye: “Bino bikolo nyonso, bókumisa Nkolo; bino mabota nyonso, bóyembela ye.”
[12] Ezaya pe alobaká: “Moto ya libota ya David akoya, akotelema po na kotambwisa bikolo nyonso; bato ya bikolo nyonso bakotia mitema epai na ye.”
[13] Lokola bozali kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá bino, nasengi ye ábongisa bondimi na bino, átondisa bino na esengo pe na boboto, boye bókoka kotiela ye mitema na makambo nyonso, na nguya ya Molimo Mosantu.
[14] Bandeko na ngai, nayebi malamu penza 'tè bino bozali bato ya makanisi malamu, boyebi makambo nyonso oyo Nzambe alakisá biso, boye bokoki kopesana batoli.
[15] Ata bongo, nauti kokòmela bino makambo mosusu oyo bosi'boyebi, po bókanisaka yango malamu. Nakòmi yango na ndenge ya polele, po Nzambe, na bolamu na ye,
[16] akómisi ngai mosali ya Kristo Yezu epai ya bikolo nyonso. Ye moto apesi ngai mosala ya kosakola Sango Malamu na ye, po Molimo Mosantu ákómisa bato ya bikolo nyonso libonza ya bosantu, oyo ekoki kosepelisa Nzambe.
[17] Yango wana, na lisanga na Kristo Yezu nakoki kobeta tolo po na mosala oyo nasalelaka Nzambe.
[18] Nakotanga bobele makambo oyo Kristo akokisaka na maloba pe na misala na ngai, po bato ya bikolo nyonso bábanda kotosa Nzambe.
[19] Pamba té makamwisi minene ya ndenge na ndenge oyo ye asalaka na maboko na ngai, elakisaka nguya ya Molimo Mosantu. Kaka na nguya yango, nasakolaki Sango Malamu ya Kristo na bamboka nyonso, banda na Yeruzalem tii na rejion ya Ilirie.
[20] Nzokande natiaka molende po násakola Sango Malamu bobele na bisika oyo nanu bayoká kombo ya Kristo té. Wana ezali lokumu oyo nawelaka, po nákóma té lokola moto oyo azali kotònga ndako na ye na likolo ya fondasion basalá na bato mosusu.
[21] Ekòmamá boye: “Baoyo bazwi nanu sango té, bakomona; pe baoyo bayoki nanu té, bakoyeba.”
[22] Mbula ebele penza, nazalaki na posa ya koya epai na bino; kasi lokola bino bosi'boyoká kombo ya Kristo, natikaki yango. Nzokande sik'oyo nasilisi mosala na ngai epai boye,
[24] pe nalingi kokende na Espanye. Boye nakoya kotala bino tango nakoleka, pe natie motema 'tè soki tokutani, nde tosepeli mwa-tango moke, bongo sima bokosalisa ngai po na mobembo.
[25] Kasi sik'oyo nazali kokende na Yeruzalem, po na kosalisa bato ya Nzambe ya kuna.
[26] Pamba té bandeko ya Masedwane pe ya Akaya bakanaki kokongola mbongo po na kosalisa bato ya Nzambe ya mboka Yeruzalem oyo bakelelá.
[27] Ya solo, bamonaki 'tè basengeli kosala bongo. Pamba té bato ya bikolo nyonso bazwaki bolamu ya Nzambe oyo bandeko Bayuda bazalaki na yango; boye basengeli pe kosalisa bango, na bomengo ya mokili oyo bazali na yango.
[28] Tango nakosilisa kopesa bango mbongo oyo bandeko bakongolaki, nakoleka epai na bino po na kokende na Espanye.
[29] Pe nayebi 'tè tango nakoya epai na bino, nakomemela bino bolamu ya Kristo mingi penza.
[30] Kasi, bandeko na ngai, nasengi bino na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, pe po na bolingo oyo Molimo apesaka: bósalisa ngai na etumba oyo nazali na yango, bóbondela Nzambe po na ngai,
[31] po Bato ya Yudea oyo baboyi Kristo básala ngai mabe té, pe bato ya Nzambe ya mboka Yeruzalem bándima penza mosala oyo nazali kosalela bango.
[32] Boye, soki Nzambe alingi, nakoya epai na bino na esengo nyonso, pe nakopema moke na kati na bino.
[33] Nzambe oyo apesaka boboto ázala na bino nyonso! Amen.