[1] Bandeko, boyebi malamu eloko nini mibeko. Moto asengeli kotosa mibeko bobele na tango azali nanu na bomoi.
[2] Ndakisa: mibeko etindaka 'tè mwasi ya libala ákangama kaka na mobali na ye tango mobali azali nanu na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi asengeli kotosa lisusu mibeko ya libala té.
[3] Bongo soki abali mobali mosusu tango mobali na ye azali nanu na bomoi, bakoloba 'tè asali kindumba. Nzokande soki mobali na ye akufi, mwasi wana asengeli kotosa mibeko ya libala lisusu té; soki abali mobali mosusu, asali kindumba té.
[4] Bandeko na ngai, bino pe ndenge moko. Mibeko ya Moize ezalaki lokola mokonzi na bino; kasi bokómi lokola bato bakufá, esika moko ná Kristo. Sik'oyo bokómi bato ya mokonzi mosusu, ye nde Kristo oyo asekwá. Nzambe asali bongo po tósalela ye misala ya malamu.
[5] Ya solo, tango tozalaki kolanda bizaleli ya bomoto, baposa ya mabe ezalaki kosala na kati na biso, pe Mibeko epesaki yango nguya ya koyeela biso liwa.
[6] Kasi sik'oyo tosi'tolongwe na boumbu ya Mibeko, tokómi lokola bato bakufá. Kasi Molimo Mosantu asi'abongisi biso po tósalela Nzambe na ndenge ya sika; totiki kolanda makambo ya kala, oyo ekòmamá na mikanda.
[7] Bongo tóloba nini? Mibeko ya Moize ekómi nde masumu? Ata moke té! Kasi toyaki koyeba masumu kaka po na Mibeko. Pamba té Mibeko epekisaka: “Kolula eloko ya moninga té.” Soki bongo té, mbele tokokaki koyeba té 'tè kolula ezali mabe.
[8] Bongo po na Mibeko, masumu ezwá nzela ya kotinda bato bálula makambo ya mabe ndenge na ndenge. Po soki Mibeko ézalaka té, mbele masumu ezali na nguya té.
[9] Kalakala, tango Mibeko ezalaká té, nazalaki na bomoi; kasi tango kaka Mibeko ebimaki, masumu eyei kozwa nguya
[10] pe ekómi komemela ngai liwa. Boye Mibeko oyo esengelaki kopesa ngai bomoi, eyeeli ngai liwa.
[11] Pamba té, po na Mibeko, masumu ezwá nzela ya kokosa ngai; po na Mibeko pe, masumu ezwá nzela ya koboma ngai.
[12] Ya solo, Mibeko ya Moize eutaká na Nzambe; mitindo na yango nyonso ezali ya bosantu, ya bosembo pe ya malamu.
[13] Boye eloko ya malamu nde moto eyeelaka ngai liwa? Ata moke té! Eloko eyeelaka ngai liwa, ezali nde masumu. Mibeko ezali malamu, kasi masumu esalelaka eloko wana ya malamu pe ekómá koyeela ngai liwa; boye po na Mibeko, masumu eyei komonana eloko ya mabe koleka.
[14] Toyebi 'tè Mibeko eutaká na Nzambe; kasi ngai nazali moto ya mokili, nakómi moumbu ya masumu.
[15] Makambo nini penza nasalaka? Oyo nalingaka kosala, nasalaka yango té; nzokande nasalaka oyo nayinaka.
[16] Ya solo, nandimi 'tè Mibeko ezali malamu; pamba té makambo oyo nasalaka, nalingaka yango penza té.
[17] Yango wana, emonani 'tè ngai té moto nasalaka bongo, kasi ezali nde masumu oyo efandaka na motema na ngai.
[18] Nayebi 'tè malamu efandaka na kati na ngai té; nazali koloba boye bobele po na nzoto na ngai ya bomoto. Pamba té ata nayoki posa ya kosala makambo ya malamu, nakokaka té.
[19] Makambo ya malamu oyo nalingaka kosala, nasalaka yango té; nzokande oyo nayinaka, yango nde nasalaka.
[20] Boye soki nazali kosala makambo nalingaka té, wana elakisi 'tè ezali ngai té moto nazali kosala bongo; ezali nde masumu oyo efandaka na motema na ngai.
[21] Namoni 'tè makambo na ngai elekaka boye: nalingaka kosala makambo ya malamu, kasi kaka posa ya kosala mabe moto eyeelaka ngai.
[22] Mayele na ngai esepelaki mingi na Mibeko ya Nzambe;
[23] kasi na kati ya nzoto na ngai namonaka ndenge mosusu: baposa ya mabe ezali koboya makambo ya Mibeko oyo mayele na ngai ezali kondima. Baposa yango ekómisaka ngai moumbu ya masumu oyo esalaka na nzoto na ngai.
[24] Aa, ngai moto ya mawa penza! Nani akolongola ngai na boumbu ya nzoto oyo ezali komemela ngai liwa?
[25] Tópesa mersi na Nzambe na lisanga na Nkolo na biso Yezu Kristo! Ya solo, namonaka boye: mayele na ngai etindaka ngai nátosaka Mibeko ya Nzambe; kasi bomoto na ngai ebendaka ngai násalaka masumu.