Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:20

[1] Mbote na bino bandeko ya Eklezya ya Nzambe oyo ezali na Korente. Nzambe akómisi bino bosantu na lisanga na Kristo Yezu, abengi bino bózala bato na ye penza. Ngai Polo, ntoma ya Kristo Yezu, Nzambe abengaki ngai kaka po ye moko nde alingaki bongo; ngai ná ndeko Sostene totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Mokanda na biso ezali pe po na bato nyonso oyo basakolaka 'tè Yezu Kristo azali Nkolo, bipai nyonso ya mokili. Ye azali Nkolo na bango pe ya biso.

[4] Napesaka Nzambe na ngai mersi tango nyonso likolo na bino, po akabeli bino bolamu na ye na lisanga na Kristo Yezu.

[5] Po na ye, Nzambe atondisi bino na bomengo nyonso: ya koyeba basekelé na ye pe ya kosakola yango.

[6] Ya solo, sango ya Kristo oyo tomemelaki bino esi'ekoteli bino tii na mikuwa;

[7] boye na kati ya makabo oyo Molimo Mosantu apesaka, bozangi ata moko té, pe bozali kozela mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akomonana.

[8] Ye moko akolendisa bino tii na suka, po 'tè na mokolo wana bózala ata na mabe moko té.

[9] Nzambe akokisaka makambo akanaka. Ye nde moto abengi bino po bózala lisanga ná Mwana na ye Yezu Kristo, Nkolo na biso.

[10] Bandeko, nasengi bino na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, bóyokana pe bótika kokabwana. Bino nyonso bózala penza moto moko, motema moko, pe makanisi se moko.

[11] Pamba té, bandeko na ngai, bato ya mama Kloe bayebisi ngai 'tè bozali koswana na kati na bino.

[12] Napesi bino toli boye, po na kati na bino moto na moto alobaka na ndenge na ye: “Ngai nazali moto ya Polo,” “Ngai moto ya Apolos,” “Ngai moto ya Piere”; to pe “Ngai nazali moto ya Kristo.”

[13] Bokanisi 'tè Kristo akabwani ndambo-ndambo? Ezali ngai Polo nde moto nakufelaki bino na kuruze? Bozwaki batisimo na kombo na ngai?

[14] Napesi Nzambe mersi po nabatisaki moto moko té na kati na bino, longola bobele Krispus ná Gayus.

[15] Boye moto moko té akoki koloba 'tè bozwaki batisimo na kombo na ngai.

[16] A! Nabosani; nabatisaki pe Stefanas ná bato ya libota na ye. Kasi nayebi moto mosusu ata moko té oyo ngai nabatisaki.

[17] Kristo atiaki ngai ntoma té po nákende kobatisa bato, kasi atindaki ngai nákende kosakola Sango Malamu. Alingi násakola yango na mayele ya bomoto té, soki té liwa na ye na kuruze ekozanga tina.

[18] Pamba té, na bato oyo bazali kobunga, sango ya liwa ya Kristo na kuruze ezali lokola likambo ya bozoba po na bango. Kasi po na biso bato Kristo azali kobikisa, yango ezali nguya ya Nzambe.

[19] Pamba té ekòmamá boye: “Nakosilisa mayele ya bato ya mayele; nakobebisa makanisi ya bato bayekolá.”

[20] Bongo wapi bato ya mayele? Wapi bato bayekolá? Baoyo bamesaná kotiana tembe basuki wapi? Nzambe alakisi 'tè mayele ya bomoto ezali penza ya bozoba.

[21] Pamba té mayele ya bomoto esalisaki bato té po báyeba Nzambe. Yango wana Nzambe alakisi mayele na ye; azwi mokano ya kotinda basakoli bámemela bato sango oyo bango bamonaka lokola makambo ya bozoba. Asali bongo po ábikisa baoyo bandimi yango.

[22] Bótala nanu. Bayuda balingaka mosakoli ásala makamwisi oyo euti na Nzambe; nzokande ba-Grek balukaka kaka koyoka masolo ya mayele.

[23] Kasi biso tozali kosakola sango ya Kristo oyo babomaki na kuruze. Bayuda balobaka 'tè yango ezali likambo ya soni; pe ba-Grek bamonaka yango lokola makambo ya bozoba.

[24] Nzokande po na bato oyo Nzambe abengi, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, Kristo azali penza nguya ya Nzambe pe mayele ya Nzambe.

[25] Pamba té makambo Nzambe asalaka emonanaka lokola bozoba, nzokande yango nde eleki mayele ya bato. Nzambe amonanaka lokola azangi makasi, nzokande ye aleki bato na makasi.

[26] Bandeko, bótala nanu: bino bato oyo Nzambe abengi, bozali banani? Na kati na bino, baoyo bomonanaka bato ya mayele bazali mingi té; bato minene bazali mingi té; bato ya lokumu bazali mingi té.

[27] Kasi Nzambe aponi baoyo bamonanaka bazoba, po áyokisa bato ya mayele soni; aponi baoyo bato balobaka 'tè bazangi makasi, po áyokisa bilombe soni.

[28] Baoyo bazangi lokumu, baoyo bato batsiolaka pe bamonaka pamba, Nzambe aponi bango po álakisa bato minene 'tè bazangi tina.

[29] Boye moto ata moko té akoki kobeta tolo liboso ya Nzambe.

[30] Ye moto asali 'tè bino bókóma lisanga na Kristo Yezu. Kristo ayeeli biso mayele oyo euti na Nzambe; akómisi biso bosembo pe bosantu, pe asilisi boumbu na biso.

[31] Yango wana Mikanda ya Nzambe ezali koloba boye: “Moto oyo alingi komikumisa, ámikumisa bobele po na makambo Nkolo asaleli ye.”

1 Ba-Korentien — Chapters