[1] Bongo, nazali kotuna: Nzambe asundolaki bato na ye? Ata moke té! Pamba té ngai moko nazali moto ya Israel, Mwana ya Abraham, na libota ya Benjamen.
[2] Nzambe asundolaki bato na ye té, baoyo ye aponá uta na ebandeli. Boyebi ndenge profete Eliya amilelaká epai ya Nzambe po na bato ya Israel. Ekòmamá boye:
[3] “Nkolo, babomi baprofete na yo pe bapanzi bamesa oyo bapeselaka yo mabonza; natikali bobele ngai moko, pe bazali koluka lisusu koboma ngai.”
[4] Kasi Nzambe azongiselaká ye nini? Alobaki: “Natikali na bato 7.000 oyo nazali kobomba po na ngai moko. Bango bafukamelá nanu nzambe Baal té.”
[5] Ndenge moko pe sik'oyo: mwa-ndambo ya bato ya Israel batikali, oyo Nzambe aponá po na bolamu na ye.
[6] Aponá bango po na misala na bango té, kasi bobele po na bolamu na ye. Soki té, bolamu ya Nzambe elingaki kozala bolamu penza té.
[7] Bongo, tóloba nini? Eloko oyo bato ya Israel bazalaki koluka, bazwaki yango té; bobele mwa-ndambo oyo Nzambe aponá, bango nde bato bazwi yango. Bamosusu bakómaki mitú makasi.
[8] Ekòmamá boye: “Nzambe akómisaki mayele na bango eloko pamba. Tii lelo miso na bango emonaka té pe matoi na bango eyokaka té.”
[9] David pe alobaká boye: “Bafeti na bango ékóma mitambo; ékanga bango po bázwa etumbu.
[10] Miso na bango ékufa, bámona lisusu té; bágumbama mikongo tango nyonso po na bapasi na bango.”
[11] Bongo natuni: tango Bayuda babetaki libaku, bakweyaki libela? Ata moke té! Kasi masumu na bango epesi bato ya bikolo nyonso nzela ya kobika, po Bayuda báyoka zuwa.
[12] Ya solo, bato ya mokili mobimba bazwi bomengo po na masumu ya Bayuda; bato ya bikolo oyo eyebaki Nzambe té bayei kotonda na bomengo, po Bayuda bazongaki sima. E bongo, bikolo nyonso ekoyoka penza esengo, tango Bayuda pe bakobika.
[13] Bino bato bozali Bayuda té, nazali koyebisa bino: lokola nazali ntoma epai ya bikolo nyonso, namoni 'tè nazali na lokumu monene.
[14] Pamba té nazali na elikya 'tè nakoki kobenda bato ya ekolo na ngai báyokela bino zuwa; boye nakokoka kobikisa mwa-ndambo na kati na bango.
[15] Ya solo, tango Nzambe atiaki bango pembeni, apesaki bato ya mokili mobimba nzela ya kozongisa boyokani ná bango. Bongo mokolo Nzambe akoyamba lisusu Bayuda, ekozala lokola bato oyo bakufaki bazongi na bomoi.
[16] Soki moto apesi Nzambe lipa ya liboso ya bilanga na ye, elakisi 'tè mapa nyonso ezali ya Nzambe. Pe soki misisa ya nzete ezali ya Nzambe, bitape pe ezali ya Nzambe.
[17] Ekolo ya Bayuda ezali lokola nzete ya olive ya malamu. Bakataki bitape na yango mosusu, pe babakisi bitape ya olive ya zamba. Yango ezali nde bino bato bozali Bayuda té. Boye misisa ya nzete ya malamu ekómi kopesa mai ndenge moko na bitape nyonso.
[18] Yango wana, atako balongoli bitape mosusu ya nzete ya olive wana, bino bokoki komonela yango té. Bokomikumisa na nini? Bozali kaka bitape; bino té bato boleisaka misisa ya nzete, kasi yango nde moto ezali koleisa bino.
[19] Mbala mosusu bokoloba: “Nzambe akataki bitape wana po biso tózwa bisika na yango.”
[20] Ee, ezali boye. Nzambe alongolaki bango po bazangaki bondimi; pe bino bozwi esika wana po na bondimi na bino. Yango wana bóbeta tolo té; kasi ebongi bóbanga.
[21] Pamba té Nzambe alongolaki Bayuda, atako bango bazali penza bitape oyo ebimaki na nzete; mbala mosusu akolongola bino pe ndenge moko.
[22] Bongo bótala: Nzambe asalaka bato bolamu; ye pe kaka moto apesaka bato etumbu. Apesi etumbu na Bayuda oyo bakwei; akobanda kosala bino malamu, soki bozali kaka kondima bolamu na ye. Soki boye té, akolongola bino pe ndenge moko.
[23] Ya solo, soki Bayuda batiki koboya bolamu ya Nzambe, ye akozongisa bango lisusu na esika oyo bazalaki liboso. Pamba té ye moto azali na nguya ya kozongisa bango.
[24] Bino bato bozali Bayuda té, Nzambe alongolaki bino na nzete ya zamba, pe abakisi bino na nzete ya malamu oyo ebimisaki bino té. Boye tembe ezali té: Nzambe akozongisa Bayuda na nzete ya malamu oyo ebimisaki bango.
[25] Bandeko, nalingi náyebisa bino likambo moko ya sekelé, po bókanisa té 'tè bozali bato ya mayele mingi. Ndambo moko ya bato ya Israel bakómi mitú makasi; kasi ekozala boye kaka tii bato ya bikolo mosusu bakokoka.
[26] Pamba té mokolo ezali, ekolo mobimba ya Israel ekobika. Ekòmamá boye: “Mobikisi akouta na Sion, akolongola mabe nyonso na mabota ya Jakob.
[27] Wana nde ndenge nakosala boyokani ná bango, tango nakolongola masumu na bango.”
[28] Bayuda bakómi banguna ya Nzambe, po bino bókoka kozwa Sango Malamu. Kasi Nzambe alingaka bango kaka, po aponaká bakoko na bango.
[29] Pamba té Nzambe abongolaka makanisi na ye té. Soki abengi moto pe apesi ye bolamu na ye, ezalaka po na libela.
[30] Kala bino bozalaká kotosa Nzambe té; kasi sik'oyo Nzambe ayei koyokela bino mawa po Bayuda bazali kotosa ye té.
[31] Sik'oyo Bayuda bakómi ndenge bino bozalaká. Kasi ata ndele Nzambe akoyokela bango mawa, ndenge azali koyokela bino.
[32] Pamba té ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu, Nzambe akómisaki bango nyonso lokola bato ya boloko, po baboyaki kotosa ye. Asalaki bongo po áyokela bango nyonso mawa.
[33] Ya solo, bomengo pe mayele ya Nzambe eleki mingi penza! Ye ayebi makambo nyonso! Nani akoki kolimbola ndenge Nzambe akataka makambo? Nani akoki koyeba bizaleli na ye?
[34] Pamba té ekòmamá boye: “Nani ayebi makanisi ya Nkolo? Nani akoki kopesa ye toli?
[35] Nani asi'akabelá ye eloko, po ázongisela ye yango?”
[36] Pamba té ezali ye moto asalá biloko nyonso; nyonso eutaka na ye pe ezali po na ye. Ebongi ázwa lokumu po na seko! Amen.