[1] Sik'oyo, bato oyo bazalaka lisanga ná Kristo Yezu, etumbu moko té ekoki kokweela bango.
[2] Pamba té Mibeko oyo eutaka na Molimo oyo apesi biso bomoi po na Kristo Yezu, yango nde moto elongoli ngai na boumbu ya masumu pe ya liwa.
[3] Mibeko ya Moize ekokaki kobongisa bato té, po bomoto na biso ezangi nguya ya kotosa Mibeko. Kasi Nzambe nde ayei kobongisa bato, na ndenge atindaki Mwana na ye moko po álongola masumu; ye akómaki moto lokola biso bato ya masumu. Tango bakatelaki ye etumbu ya liwa, ezali Nzambe moto azalaki kokatela masumu etumbu pe kosilisa nguya na yango.
[4] Boye biso bato toboyaka kolanda nzela ya bomoto pe tolandaka nzela ya Molimo, tokómi kokokisa makambo ya bosembo oyo Mibeko ezali kotinda.
[5] Baoyo balandaka nzela ya bomoto, bakanisaka makambo oyo bomoto elingaka; kasi baoyo balandaka nzela ya Molimo ya Nzambe, bakanisaka makambo oyo Molimo alingaka.
[6] Makambo ya bomoto ememelaka bato liwa; kasi Molimo ya Nzambe amemelaka bato bomoi pe boboto.
[7] Bato oyo balandaka bobele makanisi ya bomoto bazali banguna ya Nzambe; batosaka Mibeko na ye té, kutu bakoki pe kotosa yango té.
[8] Bato oyo balandaka nzela ya bomoto bakoki kosepelisa Nzambe té.
[9] Nzokande bino, bolandaka nzela ya bomoto té, kasi oyo ya Molimo, pamba té Molimo ya Nzambe asi'akotelá bino na mitema. Moto oyo azangi Molimo ya Kristo, azali moto na ye té.
[10] Kasi soki Kristo akotelá bino na mitema, atako nzoto na bino esengeli kokufa po na masumu, kasi Molimo oyo bozwi apesi bino bomoi; pamba té bosi'bokómi bosembo na miso ya Nzambe.
[11] Bongo atako nzoto na bino etangamá kokufa, lokola Molimo ya Nzambe oyo asekwisá Yezu azalaka na mitema na bino, tembe ezali té: Nzambe oyo asekwisá Kristo Yezu akozongisa pe bomoi na nzoto na bino. Ezali Molimo oyo azalaka na mitema na bino moto akosala bongo.
[12] Yango wana, bandeko, tosengeli kotosa Nzambe, kasi makambo ya bomoto té.
[13] Pamba té, soki bolandaka makambo ya bomoto, bokokufa; bokobika bobele soki Molimo asalisaka bino po bóboma makambo oyo nzoto elingaka.
[14] Baoyo nyonso Molimo ya Nzambe atambwisaka, bazali bana ya Nzambe.
[15] Bótika kobanga, pamba té bozwi Molimo ya Nzambe. Ye akómisi bino baumbu té kasi bana ya Nzambe. Ye pe moto apesaka biso nzela ya kobenga Nzambe: “Ába! Tata na ngai!”
[16] Ya solo, ndenge mitema na biso ezali kondima 'tè tozali bana ya Nzambe, Molimo ya Nzambe ye penza azali koloba se ndenge moko.
[17] Pe soki tozali bana, tokozwa pe bomengo oyo Nzambe abombelá bana na ye. Tokozwa yango na lisanga na Kristo, pamba té lokola tozali komona pasi ndenge moko na ye, tokozwa pe lokumu esika moko ná ye.
[18] Ngai namoni 'tè bapasi oyo ekweelaka biso awa na mokili ezali moke; mokolo ezali, Nzambe akolakisa polele lokumu monene oyo abombelá biso.
[19] Kutu biloko nyonso Nzambe asalá ezali kozela na esengo mingi mokolo oyo Nzambe akolakisa lokumu ya bana na ye.
[20] Pamba té biloko nyonso eyaká kobeba, atako yango moko ememaki ngambo té; ezali nde bato babebisaká yango. Nzokande elikya ezali 'tè
[21] na mokolo ya suka, Nzambe akolongola biloko nyonso na boumbu oyo ememaka liwa, pe akopesa yango bonsomi pe lokumu ya bana na ye.
[22] Ya solo, toyebi 'tè tii sik'oyo biloko nyonso Nzambe asalá ezali kolela pe komona pasi, lokola mwasi oyo alingi kobota.
[23] Ná biso pe lisusu tozali kolela mingi na mitema, atako tosi'tozwi Molimo ya Nzambe lokola mbuma ya liboso, pamba té tozali kozela 'tè Nzambe ákómisa biso bana na ye penza, mokolo akolongola nzoto na biso na boumbu.
[24] Tosi'tobiki, na ndenge totie mitema na Nzambe 'tè akobikisa biso. Soki moto asi'azwi eloko, akotia lisusu motema té 'tè akozwa yango. Ndenge nini akoki kotia motema na eloko oyo asi'azwá?
[25] Kasi biso tozali kotia mitema na bolamu oyo tozwi nanu té; bongo tozali kokanga mitema po na kozela yango.
[26] Molimo ya Nzambe ye moko ayaka kosalisa biso. Pamba té tozangi makasi, toyebi té ndenge nini tosengeli kosambela; kasi Molimo ye moko abondelaka Nzambe po na biso, na ndenge oyo bato bakoki koloba té.
[27] Bongo Nzambe oyo amonaka se ya mitema ya bato, ayebi makanisi ya Molimo; pamba té Molimo abondelaka Nzambe po na bato na ye, ndenge Nzambe ye moko alingaka.
[28] Toyebi 'tè na kati ya makambo nyonso, Nzambe asalaka po na bolamu ya bato oyo balingaka ye, baoyo ye moko azali kobenga ndenge akanaká banda kala.
[29] Bato oyo Nzambe ayebaká banda kala, aponá bango bákokana ná Mwana na ye, po ye ákóma Yaya ya liboso, oyo azali na baleki ebele.
[30] Baoyo Nzambe aponá, abengi bango; baoyo ye abengi, akómisi bango bato ya bosembo; pe baoyo bakómi bato ya bosembo, apesi bango lokumu na ye.
[31] Bongo, tóloba lisusu nini? Soki Nzambe alingi biso, nani akoki kosala biso mabe?
[32] Nzambe aboyaki té kopesa biso Mwana na ye moko, kasi akabaki ye po na biso nyonso! Lokola asi'apesi biso Mwana na ye, bolamu nini akopimela biso lisusu?
[33] Nani akofunda bato oyo Nzambe aponá? Ata moto moko té! Po Nzambe asi'akómisá bango bosembo.
[34] Nani akoki kokatela bango etumbu? Ata moto moko té! Po Kristo Yezu asi'akufá pe asekwá, azali na esika ya lokumu epai ya Nzambe, pe abondelaka ye po na biso.
[35] Eloko nini ekoki kokabola biso na bolingo ya Kristo? Ata eloko moko té. Ézala pasi to mawa, monyokoli to nzala, kokelela, likama to pe liwa.
[36] Pamba té ekòmamá boye: “Mikolo nyonso balukaka koboma biso likolo na yo; bakamataka biso lokola bameme oyo balingi kolia.”
[37] Kasi na makambo wana nyonso tozali kolonga penza, na nguya ya Nzambe oyo alingaka biso!
[38] Pamba té nayebi malamu penza 'tè ata eloko moko té ekoki kokabola biso na bolingo na ye; ézala liwa to bomoi; ézala ba-anjelu to milimo ya mabe, ézala makambo ya lelo to oyo ekoya,
[39] ézala na Likolo to awa na se, ata kutu eloko nini oyo Nzambe asalá. Eloko moko té ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe, oyo Nkolo na biso Kristo Yezu alakisi biso.