[1] Bongo tóloba nini? Tósalaka kaka masumu po bolamu ya Nzambe ékóma mingi?
[2] Ata moke té! Po na makambo etali masumu, tokómi lokola tosi'tokufá. Ndenge nini tokoki kotikala kaka bato ya masumu?
[3] Boyebi té? Biso nyonso tozwaki batisimo po tókóma bato ya Kristo Yezu; tozwaki yango po tókufa esika moko ná ye. Tango babatisaki biso, ezalaki lokola bakundaki biso esika moko ná ye. Esalamaki boye po, ndenge Tata asekwisaki Kristo na nguya na ye, se ndenge wana biso pe tólanda bizaleli ya bomoi ya sika.
[5] Pamba té lokola tosi'tosangani na Kristo awa tokufi ndenge ye akufaki, tokosangana pe ná ye tango tokosekwa ndenge ye asekwaki.
[6] Tóyeba malamu 'tè bomoto oyo tozalaki na yango liboso, esi'ekendé ná Kristo na kuruze, po nzoto na biso ya masumu ékufa, bongo tózala lisusu baumbu ya masumu té.
[7] Po soki moto akufi, boumbu ya masumu pe esili.
[8] Kasi lokola tosi'tokufá ná Kristo, tondimi 'tè tokozala pe na bomoi ya seko, esika moko ná ye.
[9] Pamba té toyebi 'tè Kristo asi'asekwá, akokufa lisusu té: liwa ekoki kosala ye lisusu eloko té;
[10] po tango ye akufaki, bokonzi ya masumu esilaki libela. Sik'oyo azali na bomoi na miso ya Nzambe.
[11] Bino pe ndenge moko: po na makambo etali masumu, bóloba 'tè bosi'bokufá, pe bozali na bomoi na miso ya Nzambe, lisanga moko na Kristo Yezu.
[12] Lokola nzoto na bino etangamá kokufa, bókeba: masumu éya kolonga bino té: bótosaka baposa na bino ya mabe ata moke té.
[13] Bópesa nzoto na bino té po ékóma moumbu ya masumu: bósalela yango té po na kokokisa makambo ya mabe. Kasi bómipesaka mobimba na Nzambe lokola nde bato babiki na liwa, po na kokokisa makambo ya bosembo.
[14] Masumu ekoki kozala lisusu mokonzi na bino té, po bozali lisusu baumbu ya Mibeko té, kasi bobele baumbu ya bolamu ya Nzambe.
[15] Nyonso wana elakisi nini? Lokola tosengeli kozala lisusu baumbu ya Mibeko té kasi bobele ya bolamu ya Nzambe, tósalaka kaka masumu? Ata moke té!
[16] Boyebi malamu 'tè soki bomipesi na boumbu ya moto moko, bosengeli kotosa ye lokola baumbu. Soki bokómi baumbu ya masumu, yango ekomemela bino liwa; soki bokómi baumbu ya kotosa Nzambe, ye akokómisa bino bosembo.
[17] Yango wana tópesa mersi na Nzambe! Pamba té bozalaká baumbu ya masumu, kasi sik'oyo bokómi kotosa na motema moko mateya oyo bozwaki.
[18] Bosi'bolongwe na boumbu ya masumu, pe bokómi baumbu ya makambo ya bosembo.
[19] Nazali kopesa bino ndakisa ya makambo bomonaka epai ya bato, po bókoka koyeba tina ya mateya oyo. Liboso bomipesaká lokola baumbu, na makambo ya soni ná ya masumu, pe bokómaká banguna ya Nzambe. Ndenge moko pe, sik'oyo bómipesa lokola baumbu na makambo ya bosembo, po bókóma bato ya bosantu penza.
[20] Tango bozalaká baumbu ya masumu, bobandaki koboya makambo ya bosembo.
[21] Bozalaká kosala makambo oyo ezali koyokisa bino soni lelo. Bongo bozwaki nini? Suka na yango se liwa!
[22] Kasi sik'oyo bosi'bolongwe na boumbu ya masumu pe bokómi baumbu ya Nzambe; bongo bozwi bolamu, bokómi bato ya bosantu penza. Suka na yango nde bomoi ya seko.
[23] Pamba té lifuta ya masumu ezali liwa; kasi likabo ya ofelé ya Nzambe ezali bomoi ya seko, na lisanga ya Nkolo na biso Kristo Yezu.