Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:58

[1] Bongo, tóloba nini po na koko na biso Abraham? Bolamu nini ye azwaká?

[2] Soki akómaki moto ya bosembo na miso ya Nzambe po na misala na ye, mbele akokaki komikumisa. Kasi akokaki komikumisa té na miso ya Nzambe.

[3] Pamba té ekòmamá boye: “Abraham andimelaki Nzambe, yango wana Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo.”

[4] Moto oyo asalaka, bafutaka nde mosala na ye; lifuta yango ezali likabo ya ofelé té.

[5] Kasi moto oyo asalaka té, soki azali kotia motema kaka na Nzambe oyo andimaka bato ya masumu, Nzambe akokamata moto yango lokola moto ya bosembo po na bondimi na ye.

[6] Se ndenge wana, nzembo ya David ezali kolakisa esengo ya moto oyo Nzambe akamati lokola moto ya bosembo, pe atali misala na ye té. Ekòmamá boye:

[7] “Esengo na bato oyo Nkolo alimbisi, pe alongoli masumu na bango;

[8] esengo na moto oyo Nkolo akamati lokola moto ya masumu té.”

[9] Esengo yango ezali bobele po na bato oyo bakatá nzoto? Té! Ezali pe po na baoyo bakatamá nzoto té. Pamba té nauti koloba boye: “Nzambe akamataki Abraham lokola moto ya bosembo po na bondimi na ye.”

[10] Makambo yango elekaki tango nini? Liboso 'tè bákata Abraham nzoto, to sima? Ezalaki liboso, kasi sima té.

[11] Na sima Abraham amikatisaki nzoto; Nzambe apesaki ye elembo yango, elakisaki 'tè asi'akómaki bosembo po na ndenge andimelaki Nzambe, tango bakati ye nanu nzoto té. Yango wana Abraham akómá koko ya bato nyonso oyo bandimeli Nzambe ata bakatamá nzoto té; pamba té Nzambe akamati bango lokola bato ya bosembo.

[12] Azali pe lisusu koko ya Bayuda, kasi ezali té po bango bakatamá nzoto; azali koko ya Bayuda oyo balandaka nzela ya bondimi, ndenge koko na biso Abraham azalaki kolanda, liboso 'tè bákata ye nzoto.

[13] Nzambe alakaká Abraham pe libota na ye 'tè akokómisa mokili mobimba bomengo na bango. Apesaki elaka yango té po Abraham azalaki kotosa Mibeko; kasi apesaki yango po Abraham akómaki moto ya bosembo, awa andimelaki Nzambe.

[14] Bongo soki Nzambe apesaka bato bomengo kaka po batosaka Mibeko ya Moize, mbele bondimi ezangi tina, pe elaka ya Nzambe ekómi ya pamba.

[15] Pamba té mibeko ekatelaka bato etumbu; kasi soki mibeko ezali té, ndenge ya koboya yango ezali pe té.

[16] Nzokande Nzambe apesaka bomengo yango bobele na bato oyo bazali kondimela ye; boye ezali kaka po na bolamu ya Nzambe. Na ndenge wana elaka ezali po na bana nyonso ya Abraham: ézala Bayuda oyo batosaka Mibeko, to bato nyonso oyo bandimelaka Nzambe lokola Abraham. Boye Abraham akómá koko na biso nyonso,

[17] ndenge ekòmamá: “Nakómisi yo koko ya bikolo ebele.” Abraham azali koko na biso na miso ya Nzambe, po andimaki 'tè ye azali na nguya ya kosekwisa bato oyo bakufá; pe biloko oyo ezalaki té, ye moto asalaka yango.

[18] Akokaki kotia lisusu motema té 'tè akobota; kasi azalaki kotiela kaka Nzambe motema. Boye ayaki kokóma “koko ya bikolo ebele,” ndenge Nzambe alobaká na ye: “Bana na yo bakozala ebele lokola minzoto.”

[19] Etikalaki moke ákokisa mbula kama moko (100) mobimba; nzokande alembaki kondimela Nzambe té, ata amonaki 'tè ye ná mwasi na ye Sara bakómaki mibange penepene ya kokufa.

[20] Atiaki tembe té po na elaka ya Nzambe; kasi bondimi na ye epesaki ye molende, pe akumisaki Nzambe.

[21] Andimaki penza 'tè Nzambe azali na nguya ya kokokisa makambo oyo ye alakaki.

[22] Yango wana “Nzambe akamataki Abraham lokola moto ya bosembo” po na bondimi na ye.

[23] Nzokande maloba oyo ya Nzambe ekòmamá bobele po na Abraham ye moko té,

[24] kasi ekòmamá pe po na biso. Pamba té Nzambe akamati biso pe lokola bato ya bosembo, po tondimi 'tè ye moto asekwisaki Nkolo na biso Yezu.

[25] Atikaki bato báboma ye po álongola masumu na biso, pe asekwisaki ye po ákómisa biso bosembo.

Ba-Romén — Chapters