Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:14

[1] Bandeko, nazali kolinga na motema na ngai mobimba 'tè Bayuda bábika. Wana nde likambo nasengaka na Nzambe.

[2] Pamba té nayebi 'tè bazali kosalela Nzambe na molende mingi; kasi bayebi penza té ndenge basengeli kosala.

[3] Bayebi té 'tè ezali Nzambe moto akómisaka bato bosembo; batiaka mitema bobele na makasi na bango moko, pe bamipesaka na Nzambe té po ye ákómisa bango bosembo.

[4] Pamba té Kristo asi'akokisi Mibeko ya Moize, po baoyo nyonso batiaka mitema bobele epai ya Nzambe bákóma bato ya bosembo.

[5] Po na baoyo basalelaka Mibeko po bákóma bosembo, Moize ye moko akòmaká boye: “Moto oyo asalelaka Mibeko, akobika kaka na ndenge ekòmamá na Mibeko.”

[6] Kasi po na baoyo batiaka mitema bobele na Nzambe po bákóma bosembo, alobaká boye: “Bómituna té: nani akomata na Likolo?” lokola nde bolingi kokitisa Kristo awa na mokili.

[7] “Bómituna pe té: nani akokita na mboka ya bato bakufá?” lokola nde bolingi kosekwisa Kristo.

[8] Nzokande Moize alobaká penza nini? Alobaká boye: “Boyebi malamu maloba ya Nzambe. Bokoki koloba yango, pamba té esi'ekoteli bino na mitema.” Maloba wana ya Nzambe ezali oyo biso tosakolaka po bato bándima 'tè

[9] Yezu azali Nkolo, pamba té Nzambe moto asekwisá ye. Ndima yango na motema, pe loba yango polele na miso ya bato, bongo okobika.

[10] Ya solo, soki ondimi yango na kati ya motema na yo, pe soki olobi yango na miso ya bato, Nzambe akokómisa yo bosembo pe akobikisa yo.

[11] Pamba té ekòmamá boye: “Moto nyonso oyo andimaka Nzambe, akoyoka soni té.”

[12] Yango wana, Bayuda ná bato ya bikolo mosusu bakeseni té: bango nyonso bazali na Nkolo se moko; ye apesaka bomengo na ye na baoyo nyonso babondelaka ye.

[13] Ya solo, ekòmamá boye: “Moto nyonso oyo abondelaka Nkolo, akobika.”

[14] Kasi ndenge nini bato bakoki kobondela Nkolo, soki bandimeli ye té? Pe ndenge nini bakoki kondimela ye, soki bayoki nanu sango na ye té? Ndenge nini bakoki koyoka sango, soki moto ya kosakola yango azali té?

[15] Pe ndenge nini bakoki kosakola yango, soki batindi bango té? Ekòmamá boye: “Oyo nde esengo: tala, bato bazali koya po na kosakola sango malamu!”

[16] Kasi bato nyonso té bato bandimi Sango Malamu. Yango wana, Ezaya alobaká: “Nkolo, nani andimi sango oyo tozalaki kosakola?”

[17] Boye, bato bakoki kondima kaka soki bayoki sango; pe sango yango euti na maloba ya Kristo.

[18] Kasi nátuna nanu: Bayokaki sango yango té? Ya solo, bayokaki yango! Ekòmamá na Mikanda ya Nzambe: “Sango yango etambolaka bamboka nyonso; ekendeke tii na suka ya mokili.”

[19] Nátuna lisusu: Bato ya Israel bayebaki tina ya sango yango té? Moize ye moko alobaká: “Nakoyokisa bino zuwa likolo ya ekolo oyo ezali ya solo té; nakoyokisa bino kanda po na ekolo ezangá mayele.”

[20] Ezaya alobaká kutu boye: “Bato oyo bazalaki koluka ngai té, bamoni ngai; namilakisaki na baoyo bazalaki kotuna ngai eloko té.”

[21] Kasi po na bato ya Israel, alobaká: “Moi mobimba nazalaki kotanda maboko po náyamba baoyo bazalaki kaka mitú makasi pe kotomboka.”

Ba-Romén — Chapters