Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:39

[1] Ya solo, Nzambe akómisá biso bosembo po na bondimi; boye sik'oyo boboto ezali na kati na biso ná Nzambe, po na Nkolo na biso Yezu Kristo.

[2] Ezali ye moto ayeeli biso bolamu ya Nzambe oyo ebongisá biso. Yango wana tozali kobeta tolo, pamba té tozali kotia mitema 'tè Nzambe akopesa biso lokumu na ye ya libela.

[3] Atako tozali nanu komona pasi, tozali kaka kobeta tolo, po toyebi 'tè pasi eyeelaka biso molende.

[4] Soki tozali na molende na tango ya pasi, tokómi bato ya kokoka; bongo soki tozali bato ya kokoka, nde toyebi kotia mitema na Nzambe.

[5] Pe soki totie mitema epai na ye, tokobunga té, po bolingo na ye esi'ekoteli biso na mitema, awa Nzambe apesi biso Molimo Mosantu.

[6] Pamba té tango tozalaki nanu na boumbu ya masumu, Kristo akufaki po na biso bato ya mabe, na eleko oyo Nzambe atiá.

[7] Nani akoki kondima kokufa po na moto mosusu, ata soki ye azali moto ya bosembo? Tango mosusu bakoki kondima kokufa po na moto ya malamu.

[8] Kasi Nzambe alakisaki 'tè alingi biso mingi penza: pamba té Kristo akufaki po na biso, tango tozalaki nanu bato ya masumu.

[9] Boye, lokola Kristo asi'akómisá biso bato ya bosembo na liwa na ye, tembe ezali té: ye pe akobikisa biso, mokolo Nzambe akokatela bato ya masumu etumbu.

[10] Pamba té tango tozalaki banguna ya Nzambe, Mwana na ye azongiseli biso boyokani ná Nzambe, po akufaki likolo na biso; tembe ezali té: lokola tosi'tozongi na boyokani, ye pe akobikisa biso po azali na bomoi.

[11] Banda sik'oyo kutu tozali komikumisa na miso ya Nzambe, po na Nkolo na biso Yezu Kristo, awa tosi'tozongi na boyokani po na ye.

[12] Masumu ekotaká na mokili po na mabe ya moto se moko Adamu, pe liwa ekotaká po na masumu. Yango wana liwa ekweelaka bato nyonso po bango nyonso basalaka masumu.

[13] Boye, masumu ezalaká na mokili, liboso 'tè Mibeko éya. Kasi masumu ezali kotangama té, soki mobeko ezali té.

[14] Nzokande uta na tango ya Adamu tii na Moize, liwa ezalaká kaka koboma bato, atako masumu na bango ekokanaki té ná oyo ya Adamu; pamba té ye abukaki mobeko oyo Nzambe apesaki ye. Adamu azalaki ndakisa ya Kristo, moto oyo Nzambe alakaki 'tè akoya.

[15] Kasi likabo oyo Kristo ayeeli biso eleki penza mabe oyo Adamu asalaki. Ya solo, mabe ya moto se moko ememelaki bato nyonso liwa; kasi bolamu ya Nzambe eleki penza na tina, yango wana tembe ezali té: likabo ya bolamu oyo moto se moko Yezu Kristo amemi, Nzambe apesi yango pe po na bato nyonso.

[16] Boye lisumu ya moto se moko wana ná likabo ya Nzambe esukaki pe ndenge moko té: Nzambe akatelaki bato etumbu po na lisumu ya moto se moko; nzokande atako bato basalaki mabe mbala mingi, likabo ya Nzambe ezali kokómisa bango bosembo.

[17] Ya solo, liwa elongaki bato po na moto se moko pe po na mabe na ye; kasi moto se moko Yezu Kristo akokisi makambo eleki penza na tina; pamba té amemeli bato bolamu eleki monene, oyo ekómisi bango bosembo. Yango wana tembe ezali té: bakozwa pe bomoi, bongo bakolonga po na seko.

[18] Nalobi boye: lisumu ya moto se moko ememelaki bato nyonso etumbu. Se ndenge wana bato nyonso bakoki kokóma bosembo pe bakozwa bomoi, po na mosala ya bosembo ya moto se moko.

[19] Ndenge bato nyonso bakómaki bato ya masumu po moto se moko aboyaki kotosa Nzambe, ndenge moko pe bato nyonso bakoki kokóma bosembo po moto se moko ayei kotosa Nzambe.

[20] Mibeko ya Moize eyaki, po émonisa polele 'tè bato bazali kosala masumu mingi; kasi epai masumu ekómi mingi, bolamu ya Nzambe pe ekómi lisusu mingi penza koleka.

[21] Yango wana, ndenge masumu ezalaki na nguya ya koboma bato, ndenge moko pe bolamu ya Nzambe ezali na nguya ya kokómisa bato bosembo, pe ya kopesa biso bomoi ya seko, po na Nkolo na biso Yezu Kristo.

Ba-Romén — Chapters