[1] Yo moto olobaka 'tè bato basalaka mabe, ata ozali nani, bakoki kolimbisa yo té. Po tango ozali koloba ndenge wana, ozali komikatela etumbu yo moko; pamba té yo pe osalaka yango.
[2] Bato oyo basalaka makambo wana, Nzambe akatelaka bango etumbu; pe toyebi 'tè ye alandaka bobele makambo ya solo.
[3] Bongo yo moto olobaka 'tè bato basalaka mabe, nzokande yo pe osalaka kaka ndenge moko, okanisi Nzambe akopesa yo etumbu té?
[4] Ya solo, ye atondá na boboto, akangaka motema pe apesaka etumbu noki té; yango wana omonelaka ye? Yeba 'tè na boboto na ye, Nzambe azali nde kobenga yo po óbongola motema.
[5] Kasi yo ozali motú makasi, olingi kobongola motema té; yango wana, ozali komilukela etumbu eleki monene. Okozwa yango, mokolo Nzambe akolakisa kanda na ye, pe akokata makambo ya bato nyonso na ndenge ekoki.
[6] Pamba té Nzambe akopesa na moto nyonso lifuta na ndenge misala na ye ezali.
[7] Baoyo bamipesaka po na kolanda misala malamu, pe balukaka bomengo pe lokumu oyo esilaka té, Nzambe akopesa bango bomoi ya seko.
[8] Kasi baoyo batosaka Nzambe té, pe baboyaka makambo ya solo po na kolanda oyo ya mabe, Nzambe akolakisa bango kanda ata mawa té.
[9] Bato nyonso oyo basalaka makambo ya mabe, bakomona pasi ya ndenge na ndenge; liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu.
[10] Kasi bato nyonso oyo basalaka makambo ya malamu, Nzambe akopesa bango nkembo, lokumu pe boboto; liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu.
[11] Pamba té Nzambe aponaka bilongi ya bato té.
[12] Bato nyonso oyo bayebi Mibeko ya Moize té, soki basali masumu, bakobunga atako bayebi Mibeko té. Kasi Bayuda oyo bayebi Mibeko ya Moize, soki basali masumu, Nzambe akosalela Mibeko po na kosambisa bango.
[13] Pamba té bato oyo bayokaka Mibeko biyokela, bango té bato bazali bosembo na miso ya Nzambe; kasi bobele baoyo batosaka Mibeko nde Nzambe akokómisa bango bosembo.
[14] Na kati ya bikolo oyo eyebi Mibeko ya Moize té, bato mosusu ya mitema malamu basalaka makambo Mibeko ezali kotinda. Yango elakisi 'tè bazali na mibeko na bango, atako bayebi Mibeko ya Moize té.
[15] Boye bazali kolakisa 'tè bayebi makambo oyo Mibeko etindaka; yango ekòmamá na kati ya mitema na bango. Se ya motema na bango pe elakisaka 'tè makambo yango ezali ya solo; makanisi na bango eyebisaka bango soki basali mabe to malamu.
[16] Nyonso wana ekomonana polele, mokolo Yezu Kristo akosambisa bato na kombo ya Nzambe, pe akobimisa basekelé na bango. Wana nde ezali Sango Malamu oyo nasakolaka.
[17] Kasi yo moto ozali kotombola mapeka po ozali Moyuda, otiaka motema na Mibeko pe ozali kobeta tolo po na Nzambe na yo;
[18] oyebi makambo Nzambe alingaka, pe Mibeko na ye esi'elakisá yo ndenge ya kopona makambo malamu.
[19] Yo okanisaka 'tè oyebi kotambwisa bato bakufá miso, pe ozali lokola mwinda po na kolakisa nzela na bato bazali kotambola na molili;
[20] omitie molakisi ya bato bazangá mayele, pe moteyi ya baoyo bayekolá té. Lokola oyebi Mibeko, okanisi 'tè ozali na mayele nyonso pe oyebi makambo nyonso ya solo.
[21] Bongo yo, molakisi ya bato mosusu, po na nini yo moko oyekolaka té? Yo moto oteyaka 'tè “koyiba té,” po na nini yo moko oyibaka?
[22] Yo moto olobaka 'tè “kosala kindumba té,” po na nini yo moko osalaka kindumba? Yo moto omonaka bikeko ya banzambe biloko ya lisumá, po na nini okendeke koyiba na bandako oyo basambelaka bikeko?
[23] Obetaka tolo 'tè oyebi Mibeko, kasi otsiolaka Nzambe na ndenge obukaka Mibeko na ye.
[24] Pamba té ekòmamá boye: “Bapaya bakómi kotsiola Nzambe ya Israel likolo na bino.”
[25] Yo Moyuda, komikatisa nzoto ezali na tina, soki otosaka Mibeko. Kasi soki obukaka Mibeko, yo moto bakatá nzoto, okokani ná moto oyo bakatá nzoto té.
[26] Se bongo, mopaya oyo bakatá nzoto té, soki asalaka makambo Mibeko ezali kotinda, Nzambe akokamata ye lokola moto oyo bakatá nzoto.
[27] Boye, mokolo Nzambe akosambisa bato, moto oyo atosaka Mibeko atako bakatá ye nzoto té, akolakisa mabe na yo Moyuda oyo otosaka Mibeko té, atako oyebi yango pe bakatá yo nzoto.
[28] Pamba té kokóma Moyuda ya solo ezali té po na makambo oyo emonanaka, kasi bobele na oyo emonanaka té. Ezali té po na elembo emonanaka na nzoto, kasi bobele soki moto azwi elembo na kati ya motema na ye. Azwaka yango pe po na mikanda té, kasi po na mosala ya Molimo ya Nzambe. Pe moto ya ndenge wana azwaka lokumu oyo euti na Nzambe, kasi na bato té.