[1] Bóyamba malamu bandeko oyo bazali na bondimi makasi té: bótiana tembe té ná bango.
[2] Ndakisa: moto moko andimaka 'tè akoki kolia biloko nyonso; nzokande moto mosusu oyo azali na bondimi makasi té, aliaka bobele ndunda.
[3] Bongo moto oyo aliaka biloko nyonso, ámonela moninga na ye té; pe oyo aboyaka biloko mosusu, áloba té 'tè moninga na ye asalaka mabe; pamba té Nzambe asi'ayambi ye.
[4] Yo ozali nani po ótala makambo ya mosali ya moto mosusu? Soki azali moto ya kokoka to té, etali bobele mokonzi na ye. Tembe té akokóma kaka moto ya kokoka, pamba té Nkolo azali na nguya ya kosalisa ye.
[5] Ndakisa mosusu: moto moko akanisaka 'tè mokolo moko eleki mikolo mosusu na tina; kasi moto mosusu akanisaka 'tè mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko. Ebongi moto na moto álanda kaka makanisi na ye.
[6] Moto oyo akanisaka 'tè mokolo moko eleki mikolo mosusu na tina, akanisaka bongo po na Nkolo; oyo aliaka biloko nyonso, asalaka bongo po na Nkolo, pamba té apesaka Nzambe mersi po na bilei na ye; pe oyo aboyaka biloko mosusu, asalaka bongo po na Nkolo; pamba té ye pe apesaka Nzambe mersi.
[7] Ata tozali na bomoi to tokufi, moto moko té na kati na biso azali kolo ya nzoto na ye. Bobele Nkolo Yezu azali Mokonzi na biso. Boye, ata tozali na bomoi to tokufi, tozali kaka bato ya Nkolo.
[9] Pamba té Kristo akufaki pe asekwaki po ákóma Mokonzi ya bato bakufá ná ya baoyo bazali na bomoi.
[10] Kasi yo, po na nini olobaka 'tè ndeko na yo asalaka mabe? Pe yo, po na nini ozali komonela ndeko na yo? Mokolo ezali, Nzambe akosambisa biso nyonso.
[11] Pamba té ekòmamá boye: “Nkolo alobi: Nakati seleka 'tè moto nyonso akofukamela ngai, pe akosakola 'tè ngai nazali Nzambe.”
[12] Boye, moko moko na biso akosamba na miso ya Nzambe po na makambo na ye moko.
[13] Bongo tótika kotala makambo ya baninga. Likambo bosengeli kotala malamu yango oyo: bótiela ndeko moko té libaku ya mabe, po bóbebisa bondimi na ye té.
[14] Na lisanga na Nkolo Yezu, nayebi malamu penza 'tè eloko moko té ezali ekila; kasi soki moto akanisi 'tè eloko oyo ezali ekila, yango ekómi pe ekila po na ye.
[15] Soki biloko yo oliaka emonisaka ndeko na yo pasi na motema, loba 'tè olingaka ye té. Moto oyo Kristo akufelaki, kobebisa ye té bobele po na biloko na yo ya kolia.
[16] Bókeba: bonsomi na bino émonanaka té lokola likambo ya mabe na miso ya bato.
[17] Pamba té bokonzi ya Nzambe etali makambo ya kolia té to ya komela, kasi etali makambo ya bosembo, ya boboto pe ya esengo oyo Molimo Mosantu apesaka.
[18] Moto oyo asalelaka Kristo na ndenge wana asepelisaka Nzambe, pe bato bandimaka ye.
[19] Bongo tóluka makambo oyo ememaka boboto pe elendisaka bondimi ya bandeko.
[20] Kobebisa misala ya Nzambe té kaka po na biloko ya kolia. Ya solo, tokoki kolia biloko nyonso, kasi ezali mabe soki tolei biloko oyo ekoki kokweisa bandeko mosusu na masumu.
[21] Eleki malamu óboya nyama, to masanga to makambo nyonso oyo ekoki kokweisa ndeko na yo na likambo.
[22] Makambo yo ondimaka po na biloko wana, etali kaka yo moko ná Nzambe. Esengo na moto oyo amikosaka té na makambo ye amonaka malamu.
[23] Kasi moto oyo alei biloko ye amoni ezali ekila, asali mabe na miso ya Nzambe, po alandi bondimi na ye té. Pamba té makambo nyonso oyo bondimi epekisaka, ezali masumu.